A A A A A

Sins: [Adultery]


1 Corinthefue 6:18
Yango wana, bokima ekobo. Masumu nyonso mosusu oyo moto akoki kosala ezali libanda ya nzoto na ye, kasi ye oyo asali ekobo, asali lisumu na nzoto na ye moko.

Hébreu 13:4
Tika ete moto nyonso atosa libala; mpe mbeto ya libala esengeli ezala peto, pamba te Nzambe akosambisa baoyo basalaka ekobo mpe baoyo basalaka pite.

Jacques 4:17
Bongo, moto oyo ayebi kosala makambo ya malamu, kasi azali kosala yango te, asali masumu.

1 Jean 1:9
Nzokande soki, toyamboli masumu na biso, Nzambe azali sembo mpe akokisaka maloba na ye, akolimbisa masumu na biso, mpe akopetola biso na mabe nyonso.

Luc 16:18
—Moto oyo alongoli mwasi na ye mpe abali mosusu, asali ekobo; mpe moto oyo abali mwasi oyo balongoli na libala, asali ekobo.

Matthieu 19:9
Nalobi na bino ete, oyo akokabwana na mwasi na ye, longola kaka mpo na likambo ye kindumba, mpe abali mwasi mosusu, asali ekobo.

Romefue 7:2-3
[2] Ndakisa: Mobeko esengaka ete mwasi ya libala akangama na mobali na ye, kaka soki mobali yango azali na bomoi. Kasi soki mobali akufi, akozala na bonsomi liboso ya mobeko ya libala.[3] Boye, soki abali mobali mosusu wana mobali na ye azali nanu na bomoi, bakoloba ete asali ekobo. Kasi soki mobali na ye akufi, akozala na bonsomi liboso ya mobeko wana. Boye, bakoloba te ete asali ekobo ata soki abali mobali mosusu.

Marc 10:11-12
[11] Ye azongisaki: —Moto oyo alongoli mwasi na ye na libala mpe abali mwasi mosusu, asali ekobo epai ya mwasi na ye ya liboso.[12] Mpe soki mwasi akabwani na mobali na ye mpe abalani na mobali mosusu, asali ekobo!

Matthieu 5:27-32
[27] —Boyokaki balobaki ete: “Kosala ekobo te!”[28] Kasi ngai nalobi na bino, soki moto atali mwasi na miso oyo etonda na baposa ya mabe asiʼasali ekobo na ye na motema.[29] Yango wana, soki liso na yo ya mobali ezali kokweyisa yo na masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika! Pamba te, malamu ozanga eteni moko ya nzoto kasi nzoto na yo mobimba ebwakama na lifelo te.[30] Soki mpe loboko na yo ya mobali ezali kokweyisa yo na masumu, katayango mpe bwaka yango mosika. Pamba te, malamu ozanga eteni moko ya nzoto, kasi nzoto na yo mobimba ebwakama na lifelo te.[31] —Balobaki lisusu ete: “Soki moto akabwani na mwasi na ye, esengeli apesa ye mokanda ya koboma libala.”[32] Kasi ngai nalobi na bino: mobali oyo akabwani na mwasi na ye, longola kaka mpo na likambo ya ekobo, ezali ye moto afungoleli mwasi yango nzela ya kosala kindumba. Oyo mpe abali mwasi balongola na libala, asali ekobo.

1 Corinthefue 6:9-16
[9] Boyebi te ete, bato oyo basalaka mabe bakokota te na Bokonzi ya Nzambe? Bomikosa te: ezala bato oyo basalaka kindumba, basambeli ya bikeko, basali ekobo, baoyo balula makambo ya soni, baoyo basanganaka na baninga na bango mibali,[10] miyibi, bato ya lokoso ya mbongo, balangwi masanga, baoyo bafingaka baninga, baoyo babotolaka biloko ya bato, bakokota te na Bokonzi ya Nzambe. Mpe bato mosusu kati na bino, bozalaka ndenge wana.[11] Kasi basokolaki bino, bakomisaki bino basantu, mpe bakomisaki bino bato na sembo kati na kombo ya Nkolo Yesu Klisto, mpe na nzela ya Molimo ya Nzambe na biso.[12] “Nazali na ndingisa mpo na kosala makambo nyonso”, kasi makambo nyonso ezali na litomba te. Nazali na ndingisa mpo na kosala makambo nyonso, kasi nakotika te ete, nazala mowumbu ata ya eloko moko.[13] “Biloko ya kolia esalama mpo na libumu, mpe libumu esalama mpo na biloko ya kolia.” Kasi Nzambe akoboma nyonso mibale. Nzoto esalama te mpo na ekobo, kasi ezali mpo na Nkolo, mpe Nkolo azali mpo na nzoto.[14] Pamba te, lokola Nzambe asekwisaki Nkolo kati na bakufi, akosekwisa biso mpe, na nguya na ye.[15] Boyebi te ete nzoto na bino ezali biteni ya nzoto ya Klisto? Nakoki kozwa biteni ya Nzoto ya Klisto, mpo nakomisa yango biteni ya nzoto ya mwasi ya ndumba? Ata moke te![16] Boyebi te ete moto oyo asangani na mwasi ya ndumba, akomi na ye nzoto moko? Pamba te, elobama: “Bango mibale bakokoma nzoto moko.”

Luc 18:18-20
[18] Bongo mokonzi moko ya Bayuda atunaki ye: —Moteyi malamu, esengeli nasala nini mpo nazwa bomoi ya seko?[19] Yesu azongiselaki ye: —Mpo na nini obengi ngai moto malamu? Moto moko te azali malamu, longola kaka Nzambe ye moko.[20] Oyebi Mibeko: “Kosala ekobo te, koboma te, koyiba te, koloba litatoli ya lokuta te, tosa tata mpe mama na yo!”

1 Thessaloniquefue 4:3-5
[3] Mokano ya Nzambe ezali boye: bozala na bomoi ya bosantu; boboya pite;[4] mpe moto na moto na kati na bino ayeba kobatela nzoto na ye na ndenge ya bosantu mpe na ndenge ya botosi,[5] kasi alanda baposa ya mabe te, ndenge bapakano basalaka, bango bato bayebi Nzambe te.

Marc 7:20-23
[20] Bongo alobaki lisusu: —Oyo ebimaka na moto, yango nde ekomisaka ye mbindo.[21] Pamba te, wuta na kati, na motema ya moto nde ebimaka: makanisi ya mabe, ekobo, kindumba,[22] koboma, koyiba, lokoso ya mbongo, makambo ya mabe, makambo ya lokuta, pite, kofinga, lofundu, bozoba.[23] Makambo nyonso wana ya mabe, ebimaka na kati mpe yango ekomisaka moto mbindo.

Matthieu 15:17-20
[17] Boyebi te ete oyo nyonso ekotaka na monoko ekendaka na libumu, bongo na sima, ebimaka na libanda?[18] Kasi oyo ebimaka na monoko, ewutaka na motema mpe yango nde ekomisaka moto mbindo.[19] Pamba te, makanisi ya mabe, koboma, kosala kindumba, makambo ya soni, koyiba, litatoli ya lokuta mpe kofinga ewutaka na motema.[20] Makambo oyo nde ekomisaka moto mbindo. Kasi, kolia na maboko oyoesokolami te, ekomisaka moto mbindo te.

Jean 8:4-11
[4] Bongo balobaki na Yesu: —Moteyi, bakangaki mwasi oyo na tango azalaki kosala ekobo.[5] Nzokande, kati na Mibeko, Moyize atindaki biso ete toboma mwasi ya ndenge oyo na mabanga! Bongo yo, olobi nini?[6] Batunaki ye motuna wana na kotiela ye motambo, mpo bazwa likambo ya kofundela ye. Kasi Yesu agunzamaki mpe abandaki kokoma na mabele na mosapi na ye.[7] Lokola bazalaki kaka kotuna-tuna ye, Yesu atelemaki mpe alobaki na bango: —Oyo kati na bino azangi lisumu, abamba ye libanga moto ya liboso.[8] Bongo Yesu agunzamaki lisusu, mpe azongelaki kokoma na mabele.[9] Tango bayokaki bongo, bango nyonso babandaki kokende moko-moko, kobanda na mikolo. Bongo Yesu atikalaki kaka ye moko elongo na mwasi liboso na ye.[10] Bongo Yesu atombolaki motu mpe alobaki na ye: —Mwasi, bato oyo bayaki kofunda yo bazali wapi? Moto ata moko te akateli yo etumbu?[11] Ye azongisaki: —Tata, ata moto moko te! Bongo Yesu alobaki: —Ngai mpe nakokatela yo etumbu te. Kende na yo, kasi kosala lisusu masumu te!]

1 Corinthefue 7:1-40
[1] Sikʼoyo, mpo na makambo oyo bokomelaki ngai: eleki malamu ete mobali abala te.[2] Kasi, mpo na kokima makambo ya soni, eleki malamu ete mobali nyonso azala na mwasi na ye, mpe mwasi nyonso azala na mobali na ye.[3] Tika ete mobali akokisa posa ya mwasi na ye, mpe mwasi akokisa oyo ya mobali na ye.[4] Pamba te, nzoto ya mwasi ezali lisusu ya ye te, kasi, ya mobali na ye. Ndenge moko mpe, nzoto ya mobali ezali lisusu ya ye te, kasi, ya mwasi na ye.[5] Bopimelana nzoto te; kasi soki bolingi komipesa na mabondeli, bokoki koyokana bino mibale ete bosangisa nzoto te mpo na tango moke. Bongo na sima, bozongela kosangana, noki te, Satana akozwa nzela ya komeka bino mpo na kozanga makoki ya komikanga.[6] Makambo oyo nalobi ezali kaka likanisi napesi, kasi ezali mobeko te.[7] Nalingi ete mibali nyonso bazala lokola ngai. Kasi, moto na moto azali na likabo oyo Nzambe apesa ye: moko azali na likabo oyo, mpe mosusu azali na likabo wana.[8] Nalobi na baoyo babala te mpe na basi oyo bakufisa mibali: eleki malamu ete bazala lokola ngai, babala te.[9] Kasi, soki bakokoka komikanga te, eleki malamu ete babala na esika ya kozika na posa ya nzoto.[10] Mpo na baoyo babala, napesi bango mobeko oyo (mobeko yango ewuti epai na ngai te, kasi epai na Nkolo): Mwasi asengeli te kokabwana na mobali na ye.[11] Kasi soki akabwani na mobali na ye, abala lisusu te, to ayokana na mobali na ye. Mobali mpe asengeli kokabwana te na mwasi na ye.[12] Mpo na bato mosusu, ngai nde nazali koloba kasi Nkolo te: soki ndeko mobali moko azali na mwasi oyo azali mondimi te, bongo mwasi yango asepeli kowumela na ye na libala, akabwana te na mwasi wana.[13] Ndenge moko mpe, soki mwasi moko azali na mobali oyo azali mondimi te, mpe mobali yango asepeli kowumela na ye na libala, akabwana te na mobali wana.[14] Pamba te, mobali oyo azali mondimi te akomi mosantu na nzela ya mwasi na ye, mpe mwasi oyo azali mondimi te akomi mosantu na nzela ya mobali na ye. Soki ezalaki bongo te, bana na bino balingaki kozala mbindo, nzoka nde bazali basantu.[15] Kasi soki ye oyo azali mondimi te alingi koboma libala, aboma na ye. Na likambo ya boye, mobali mondimi to mwasi mondimi azali ya kokangama te: Nzambe abenga biso mpo ete tozala na bomoi ya kimia.[16] Pamba te, yo mwasi, oyebi soki okobikisa mobali na yo? To mpe yo mobali, oyebi soki okobikisa mwasi na yo?[17] Nzoka nde, tika ete moto na moto andima kobika kolanda likabo oyo Nkolo apesa ye, ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye. Oyo nde mobeko napesaka na mangomba nyonso.[18] Boni, ezalaki na moto moko oyo tango Nzambe abengaki ye azalaki akatama nzoto ya mibali? Aluka te kozala lokola moto oyo akatama nzoto ya mibali te. Ezalaki na moto mosusu oyo azalaki akatama nzoto ya mibali te tango Nzambe abengaki ye? Aluka te kozala lokola moto oyo akatama nzoto ya mibali.[19] Kokatama nzoto ya mibali ezali na tina te, mpe kokatama nzoto ya mibali te ezali mpe na tina te; kasi kobatela mibeko ya Nzambe nde eleki na tina.[20] Tika ete moto na moto atikala ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye.[21] Boni, ozalaki mowumbu tango Nzambe abengaki yo? Komitungisa te; kasi soki ozwi libaku ya kokoma moto ya somi, salela yango.[22] Pamba te, mowumbu oyo abengama mpo na kosalela Nkolo, azali moto ya somi ya Nkolo. Ndenge moko mpe, moto ya somi oyo abengama mpo na kosalela Nkolo, azali mowumbu ya Klisto.[23] Basombaki bino na talo mingi penza; yango wana, bokoma bawumbu ya bato te.[24] Bandeko, tika ete moto na moto atikala liboso ya Nzambe, ndenge azalaki tango Nzambe abengaki ye.[25] Mpo na baoyo babali nanu te: Nazali na mobeko te oyo ewuti epai na Nkolo, kasi nazali kopesa likanisi na ngai lokola ya moto oyo, na mawa ya Nkolo, bokoki kondimela.[26] Nakanisi ete eleki malamu mpo na moto, likolo ya bapasi ya tango oyo, atikala ndenge azali.[27] Ozali na mwasi? koluka kokabwana na ye te. Ozali mpe na mwasi te? Koluka mpe kobala mwasi te.[28] Kasi soki mpe obali, osali lisumu te; soki elenge mwasi abali, asali lisumu te. Kasi bato oyo babala bakokutana na bapasi mingi na bomoi na bango ya mokolo na mokolo, boye nalingi kokebisa bino ete bapasi yango ekomela bino te.[29] Bandeko, nalingi koloba boye: tango ezali mokuse. Kobanda sikʼoyo, tika ete baoyo bazali na basi, bazala lokola nde bazali na basi te;[30] baoyo bazali kolela, bazala lokola nde bazali kolela te; baoyo bazali kosepela, bazala lokola nde bazali kosepela te; baoyo bazali kosomba, bazala lokola nde bazali na eloko te;[31] baoyo bazali kosalela biloko ya mokili, bazala lokola nde bazali kosalela yango te. Pamba te, mokili ndenge ezali komonana sikʼoyo, ekoleka.[32] Nalingi ete bomitungisa te. Mobali oyo abali nanu te atiaka makanisi na ye na makambo ya Nkolo: alukaka ndenge nini akoki kosepelisa Nkolo.[33] Kasi mobali oyo abala atiaka makanisi na ye na makambo ya mokili oyo, alukaka ndenge nini akoki kosepelisa mwasi na ye;[34] mpe motema na ye ezali ya kokabwana. Ndenge moko mpe, mwasi oyo azanga mobali to elenge mwasi oyo abali nanu te, atiaka makanisi na ye na makambo ya Nkolo. Posa ya motema na ye ezalaka kaka ete amipesa mobimba na Nkolo, na nzoto mpe na molimo. Kasi mwasi oyo abala atiaka makanisi na ye na makambo ya mokili oyo, alukaka ndenge nini akoki kosepelisa mobali na ye.[35] Nazali koloba makambo oyo mpo na bolamu na bino moko, ezali te mpo na kotiela bino motambu, kasi nalingi ete bosala oyo ezali malamu, mpe bomipesa mobimba na mosala ya Nkolo.[36] Soki elenge mobali amoni ete akokoka lisusu te komikanga liboso ya mobandami na ye, bongo akanisi ete abima na ye wana bazali na likanisi ya kobalana, asala kolanda likanisi na ye, asali lisumu te. Tika ete babalana.[37] Kasi moto oyo azwi mokano na motema na ye, na kotindikama te, na bososoli nyonso ete wuta na motema na ye akosangisa nzoto te na mobandami na ye, asali malamu.[38] Boye, moto oyo abali mobandami na ye asali malamu; kasi oyo mpe alingi kobala te, asali malamu koleka.[39] Mwasi ya libala azalaka ya kokangama na mobali na ye wana mobali azali nanu na bomoi; soki mobali akufi, mwasi yango akomi na bonsomi ya kobalana na mobali nyonso oyo ye alingi, kasi kaka kati na Nkolo.[40] Nzoka nde na makanisi na ngai, namoni ete akozala mwasi ya esengo mingi koleka soki atikali ndenge azali: mpe ngai nakanisi ete, ngai mpe nazali na Molimo ya Nzambe.

Lingala Bible 2002
Copyright © 2002 by Biblica, Inc.®