1 Corinthefue 6:10 |
miyibi, bato ya lokoso ya mbongo, balangwi masanga, baoyo bafingaka baninga, baoyo babotolaka biloko ya bato, bakokota te na Bokonzi ya Nzambe. Mpe bato mosusu kati na bino, bozalaka ndenge wana. |
|
1 Timothée 6:10 |
Pamba te, “bolingo ya mbongo, yango nde ezali ebandeli ya mabenyonso.” Bato mosusu bawelelaki kozala na mbongo, babungisa kondimana bango mpe bamiyokisa bango moko bapasi mingi. |
|
ÉphÈsefue 4:28 |
Moto oyo azalaki koyiba, atika koyiba; kasi esengeli asala, asala na maboko na ye moko mosala oyo ezali malamu, mpo ete azala na eloko oyo akoki kopesa na moto oyo azali kokelela. |
|
Jean 10:10 |
Moyibi ayaka kaka mpo na koyiba, koboma, mpe kobebisa. Kasi ngai nayaki mpo ete bazwa bomoi, mpe bazwa yango ya mingi penza. |
|
Luc 19:8 |
Kasi Zashe atelemaki mpe alobaki na Nkolo: —Nkolo yoka, nakopesa sikʼoyo kati-kati ya biloko na ngai epai ya babola. Mpe soki nakosaki moto mpo na kozwa eloko na ye, nakozongisela ye yango mbala minei! |
|
Marc 10:19 |
Oyebi Mibeko: Kosala ekobo te, koboma te, koyiba te, koloba litatoli ya lokuta te, kokosa moninga te, tosa tata na yo mpe mama na yo. |
|
Matthieu 19:18 |
Moto yango atunaki: —Mibeko nini yango? Yesu azongisaki: — Koboma te, kosala kindumba te, koyiba te, koloba litatoli ya lokuta te, |
|
Romefue 13:7 |
Bopesa na moto na moto oyo ekoki na ye: mpaku, na oyo asengeli kozwa mpako; batike ya biloko, na oyo asengeli kozwa tike ya biloko; botosi, na oyo asengeli kotosama, mpe lokumu, na oyo asengeli kozwa lokumu. |
|
Romefue 13:9 |
Pamba te, mobeko lokola: kosala ekobo te, koboma te, koyiba te, kolula te mpe nyonso oyo etikali, elobami na mokuse kati na liloba oyo: “Linga moninga na yo lokola yo moko.” |
|
Lingala Bible 2002 |
Copyright © 2002 by Biblica, Inc.® |