Romefue 8:28 |
Toyebi lisusu malamu ete, makambo nyonso esalamaka mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Nzambe, baoyo abenga kolanda mokano na Ye. |
|
Philippesfue 4:6-7 |
[6] Bomitungisa na eloko ata moko te, kasi na makambo nyonso, bolakisa baposa na bino epai ya Nzambe, na nzela ya mabondeli, bisengeli, elongo na matondi.[7] Bongo kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli nyonso, ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino kati na Kristo Yesu. |
|
Luc 6:16 |
Yude mwana ya Zaki mpe Yuda Iskariote oyo atekaki Yesu. |
|
Colossesfue 3:23-25 |
[23] Nyonso oyo bosalaka, bosala yango na motema mobimba, lokola nde bozali kosala mpo na Nkolo, kasi mpo na bato te.[24] Pamba te, boyebi ete bokozwa bomengo oyo ekowuta na Nkolo, lokola lifuti. Ezali Klisto, Nkolo nde bozali kosalela.[25] Moto oyo asalaka mabe, akozwa lifuti ya mabe na oyo asalaki; mpe Nzambe aponaka bilongi te. |
|
Hébreu 11:6 |
Nzokande, moto moko te akoki kosepelisa Nzambe soki azangikondima. Pamba te, moto oyo azali kopusana pene-pene na Nzambe, esengeli andima ete Nzambe azali mpe apesaka lifuti na baoyo balukaka ye. |
|
Hébreu 13:5 |
Bozala na lokoso ya mbongo te, mpe bosepelaka na oyo bozali na yango. Pamba te Nzambe alobaki: nakotika yo te, nakosundola yo te! |
|
Lingala Bible 2002 |
Copyright © 2002 by Biblica, Inc.® |