Jean 3:16 |
Pamba te, Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima ye, akufa te, kasi azwa bomoi ya seko. |
|
1 Thessaloniquefue 4:14 |
Pamba te, soki tondimaka ete Yesu akufaki mpe asekwaki, tozali kondima mpe, Nzambe akomema elongo na Yesu bato oyo bakufa kati na Yesu. |
|
Jean 11:26 |
Mpe moto nyonso oyo azali na bomoi, soki andimeli ngai, akokufa seko te! Ondimi yango? |
|
Romefue 6:23 |
Pamba te, lifuti ya lisumu ezali kufa, kasi likabo ya ofele ya Nzambe ezali bomoi ya seko kati na Klisto Yesu, Nkolo na biso. |
|
Sa nglô yile 21:4 |
Akopangusa mayi ya miso nyonso ya miso na bango; liwa ekozala lisusute, matanga ekozala te, ata kolela, ata pasi. Pamba te makambo ya liboso esiʼeleki. |
|
Romefue 14:8 |
Soki tozali na bomoi, tozali na bomoi mpo na Nkolo, mpe soki tokufi, tokufi mpo na Nkolo. Yango wana, tozala na bomoi to tokufa, tozali kaka bato ya Nkolo. |
|
Luc 23:43 |
Bongo Yesu azongiselaki ye: —Nalobi na yo ya solo, lelo oyo, okozala elongo na ngai na Paradiso! |
|
Lingala Bible 2002 |
Copyright © 2002 by Biblica, Inc.® |