Jean 10:10 |
Moyibi ayaka kaka mpo na koyiba, koboma, mpe kobebisa. Kasi ngai nayaki mpo ete bazwa bomoi, mpe bazwa yango ya mingi penza. |
|
Jean 14:1 |
Tika ete mitema na bino etungisama te. Bondimelaka Nzambe, bondimela mpe ngai. |
|
Philippesfue 4:19 |
Mpe Nzambe na ngai akokokisa baposa na bino, na ndenge ya nkembo ya bomengo na ye, kati na Kristo Yesu. |
|
Romefue 8:28 |
Toyebi lisusu malamu ete, makambo nyonso esalamaka mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Nzambe, baoyo abenga kolanda mokano na Ye. |
|
Romefue 15:13 |
Tika ete Nzambe oyo apesaka elikya, atondisa bino na esengo mpe na kimia, na nzela ya kondima, mpo ete botonda na elikya na nguya ya Molimo Mosantu. |
|
1 Jean 5:14-15 |
[14] Mpe tozali na elikya oyo liboso ya Nzambe: ete soki tosengi eloko na mokano na ye, akoyoka biso.[15] Mpe soki toyebi ete ayokaka biso, toyebi mpe ete tokozwa biloko nyonso oyo tosengaka ye. |
|
Matthieu 6:25-26 |
[25] Yango wana nalobi na bino, bomitungisa te mpo na bomoi na bino: soki bokolia nini mpe soki bokomela nini. To mpo na nzoto na bino, soki bokolata nini. Boni, bomoi eleki biloko ya kolia te? Bongo nzoto, eleki bilamba te?[26] Botala bandeke ya likolo elonaka te, ebukaka te, mpe ebombaka bilei na bibomopanga te, kasi Tata na bino ya Likolo aleyisaka yango. Boni, boleki yango na tina te? |
|
Lingala Bible 2002 |
Copyright © 2002 by Biblica, Inc.® |