A A A A A

Good Character: [Self-Control]


1 Corinthefue 9:25
Bato nyonso oyo basalaka masano, bamipekisaka makasi na makambo ebele. Basalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka, kasi biso tosalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka te.

1 Corinthefue 10:13
Komekama moko te ekomelaki bino, oyo ezangaka kokomela bato. Nzambe akokisaka bilaka na Ye: akotika te ete bomekama koleka makasi na bino. Kasi na tango ya komekama, akobongisa nzela ya kolonga yango, mpe akopesa makasi ya koyika mpiko.

1 Thessaloniquefue 5:6
Yango wana, tolala pongi te lokola bato mosusu, kasi tokengela mpe tomibatela malamu.

2 Timothée 1:7
Pamba te, Molimo oyo Nzambe apesaki biso ekomisaka biso bato ya kobanga te; kasi Molimo oyo etondisaka biso na nguya, na bolingo, mpe na koyeba komibatela.

Philippesfue 4:13
Nakoki kosala makambo nyonso na nzela ya ye oyo apesaka ngai makasi.

Tite 1:8
Kasi esengeli azala moto oyo ayambaka bapaya malamu, moto oyo alingaka makambo ya malamu, moto ya bwanya, moto na sembo, mosantu, mpe oyo ayebi komibatela malamu.

Romefue 12:1-2
[1] Bandeko, mpo na bolamu oyo Nzambe atalisi biso, nazali kosenga na bino ete bokaba banzoto na bino epai na Nzambe lokola mbeka ya bomoi, ya bule mpe oyo esepelisaka Nzambe: yango ekozala losambo ya solo mpo na bino.[2] Bolanda bizaleli ya tango oyo te, kasi bobongwana na nzela ya makanisi ya sika mpo ete bokoka kososola mokano ya Nzambe: oyo na miso na Ye ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.

Philippesfue 4:8-9
[8] Bandeko, mpo na kosukisa, makambo nyonso oyo ezali ya solo, makambo nyonso oyo ezali ya kitoko, makambo nyonso oyo ezali ya sembo, makambo nyonso oyo ezali ya peto, makambo nyonso oyo batobalingaka, makambo nyonso oyo bato bakumisaka, soki likambo moko ezali malamu to oyo bato bakoki kokumisa, tika ete bokanisaka mpona makambo yango.[9] Makambo oyo boyekolaki, bozwaki mpe boyokaki epai na ngai, to mpe oyo bomonaki na ngai, bosalela yango. Bongo Nzambe ya kimia akozala elongo na bino.

Jacques 1:19-21
[19] Bandeko balingami, bosimba likambo oyo: moto nyonso azala moto ya koyoka noki, kasi azala moto ya koloba noki te mpe ya kosilika noki te;[20] Pamba te kanda ya moto ekokisaka te makambo ya malamu oyo Nzambe alingaka.[21] Yango wana, bobwaka bosoto nyonso mpe misala nyonso ya mabe. Mpe bondima na komikitisa nyonso Liloba oyo balonaki na kati ya mitema na bino, oyo ekoki kobikisa bino.

1 Pierre 5:6-8
[6] Yango wana, bomikitisa na nse ya loboko ya nguya, oyo ya Nzambe, mpo akoka kotombola bino na tango oyo ekoki.[7] Bobwaka epai na ye makambo nyonso oyo etungisaka bino, Pamba te ye moto abatelaka bino.[8] Bomibatela mpe bozala ya kobongama. Monguna na bino, Zabolo, azali koleka-leka pembeni-pembeni na bino lokola ntambwe oyo azali kongulumampe azali koluka nani akolia.

1 Corinthefue 9:24-27
[24] Boni, boyebi te ete kati na lisano ya kopota mbangu, bapoti mbangu nyonso bakimaka, kasi moko kaka nde azwaka mbano? Bino mpe bokima mbangu, na ndenge ete bozwa mpe mbano.[25] Bato nyonso oyo basalaka masano, bamipekisaka makasi na makambo ebele. Basalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka, kasi biso tosalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka te.[26] Yango wana, nakimaka mbangu na bozoba te, nabetaka makofi bibetata-beta te.[27] Kasi nakonzaka nzoto na ngai mpe nakomisaka yango lokola mowumbu, pamba te nabangaka ete sima ya koteya bato mosusu, ngai moko nazanga mbano.

1 Corinthefue 6:12-20
[12] “Nazali na ndingisa mpo na kosala makambo nyonso”, kasi makambo nyonso ezali na litomba te. Nazali na ndingisa mpo na kosala makambo nyonso, kasi nakotika te ete, nazala mowumbu ata ya eloko moko.[13] “Biloko ya kolia esalama mpo na libumu, mpe libumu esalama mpo na biloko ya kolia.” Kasi Nzambe akoboma nyonso mibale. Nzoto esalama te mpo na ekobo, kasi ezali mpo na Nkolo, mpe Nkolo azali mpo na nzoto.[14] Pamba te, lokola Nzambe asekwisaki Nkolo kati na bakufi, akosekwisa biso mpe, na nguya na ye.[15] Boyebi te ete nzoto na bino ezali biteni ya nzoto ya Klisto? Nakoki kozwa biteni ya Nzoto ya Klisto, mpo nakomisa yango biteni ya nzoto ya mwasi ya ndumba? Ata moke te![16] Boyebi te ete moto oyo asangani na mwasi ya ndumba, akomi na ye nzoto moko? Pamba te, elobama: “Bango mibale bakokoma nzoto moko.”[17] Kasi moto oyo asangani na Nkolo, azali moko na ye kati na molimo.[18] Yango wana, bokima ekobo. Masumu nyonso mosusu oyo moto akoki kosala ezali libanda ya nzoto na ye, kasi ye oyo asali ekobo, asali lisumu na nzoto na ye moko.[19] Boyebi te ete nzoto na bino ezali ndako ya Molimo Mosantu, oyo azali kati na bino, oyo bozwaki wuta na Nzambe? Mpe bozali ya bino moko te;[20] pamba te, basombaki bino na talo mingi penza. Yango wana, bopesa Nzambe nkembo na nzoto na bino.

2 Pierre 1:3-11
[3] Nguya ya bonzambe ya Nzambe esiʼepesa biso biloko nyonso oyo tozali na yango posa mpo na bomoi mpe mpo na kotosa makambo ya Nzambe, na nzela ya koyeba ye oyo abenga biso na nkembo na ye mpe bolamu na ye.[4] Na nzela wana nde, apesa biso bilaka ya minene penza mpe ya motuyamingi, mpo ete na nzela na yango bokoka kosangana kati na bomoto ya Nzambe mpe bokima libebi oyo ezali na mokili, oyo ezali kowuta na baposa ya mabe.[5] Mpo na tina wana, bosala makasi mpo na kobakisa likolo ya kondima na bino, bolamu; mpe likolo ya bolamu, boyebi;[6] likolo ya boyebi, komibatela malamu; mpe likolo ya komibatela malamu, kokanga motema; mpe likolo ya kokanga motema, kotosa makambo ya Nzambe;[7] mpe likolo ya kotosa makambo ya Nzambe, bondeko ya solo; mpe likolo ya bondeko ya solo, bolingo.[8] Pamba te, soki makambo oyo ezali kati na bino mpe ezali tangonyonso kobakisama, yango ekobatela bino mpo bozala te bato oyo basalaka eloko moko te mpe baoyo babotaka mbuma te, mpo na oyo etali boyebi ya nkolo na biso Yesu Kristo.[9] Kasi soki moto azangi makambo wana, azali mokufi miso mpe amonaka mosika te, mpe asiʼabosani ete basiʼbasukola ye na masumu na ye ya kala.[10] Yango wana bandeko na ngai, bozala na posa mingi mpo na kolendisa kobengama na bino mpe koponama na bino. Pamba te, sokibosali makambo wana, bokokweya te,[11] mpe bakoyamba bino malamu penza kati na Bokonzi ya seko ya Nkolona biso mpe Mobikisi Yesu Kristo.

ÉphÈsefue 6:10-20
[10] Mpo na kosukisa: bozwa makasi na bino kati na Nkolo mpe kati na nguya ya makasi na ye.[11] Bolata bibundeli nyonso ya Nzambe, mpo ete bokoka kotelema ngwi liboso ya mayele ya mabe ya zabolo.[12] Pamba te etumba na biso ezali na makila mpe na mosuni te, kasi na milimo oyo ezali na bokonzi, milimo ya lokumu, banguya ya mokili oyo ya molili, mpe na milimo ya mabe oyo ezali na mokili ya milimo.[13] Yango wana, bokamata bibundeli nyonso ya Nzambe, mpo ete bokoka kotelema na mokolo mabe, mpe sima ya kobunda kino na suka, botelema kaka ngwi.[14] Yango wana botelema ngwi: bolata solo lokola mokaba na loketo, bolata bosembo lokola eloko ya libende oyo ebatelaka ntolo,[15] bolata molende ya kopanza Sango Malamu ya kimia lokola sapato na makolo na bino.[16] Likolo na nyonso, bolata kondima lokola eloko ya libende oyo ekosunga bino mpo na koboma makonga nyonso oyo epelaka moto, oyo moto mabe abwakaka.[17] Bokamata lobiko lokola ekoti ya libende, mpe Liloba ya Nzambe lokola mopanga ya Molimo.[18] Na tango nyonso, bobondela mabondeli ya ndenge nyonso mpe ya kosenga, na kotindama ya Molimo. Bosala yango na kokengela mpe na molende, mpe bobondela mpo na basantu nyonso.[19] Bobondela mpe mpo na ngai, mpo ete tango nakoloba, Nzambe apesa ngai maloba oyo nasengeli koloba, mpo ete nateya na molende nyonso sekre ya Sango Malamu,[20] oyo ngai nazali ambasadere na yango, ambasadere oyo azali ya kokangama na minyololo. Bobondela mpo ete nateya yango na molende nyonso, ndenge nasengeli koteya yango.

Galatiefue 5:13-26
[13] Pamba te, bino bandeko na ngai, bobengama mpo bozala na bonsomi, esengeli te ete bosalela bonsomi na bino lokola nzela mpo na kosalela mosuni, kasi bosalisana bino na bino kati na bolingo.[14] Pamba te, Mibeko nyonso ezali kokokisama na mobeko oyo moko: “Linga moninga na yo lokola yo moko.”[15] Kasi soki bozali kozokisana mpe komipasola, bokeba soki te bokobomana bino na bino.[16] Kasi nalobi na bino boye: botika Molimo atambusa bomoi na bino, na bongo bokotosa te kosala makambo oyo baposa ya nzoto etindaka.[17] Pamba te, baposa ya nzoto elingaka makambo oyo Molimo alingaka te; ndenge moko mpe Molimo alingaka makambo oyo baposa ya nzoto elingaka te. Bango mibale bazali na etumba, mpo ete bokoka te kosala makambo oyo bolingaka kosala.[18] Kasi soki Molimo azali kotambusa bino, bokozala na nse ya bokonzi ya Mibeko te.[19] Misala ya nzoto emonanaka na: ekobo, makambo ya bosoto, kindumba,[20] kosambela bikeko, kindoki, koyinana, koswana, zuwa, kanda, kotiana tembe, kokabwana, kolongwa na mateya ya solo,[21] likunya, kolangwa masanga, lokoso, na makambo mosusu oyo ekokani na oyo wana. Nazali kokebisa bino ndenge nakebisaki bino liboso ete baoyo basalaka makambo ya ndenge wana, bakokota te na Bokonzi ya Nzambe.[22] Kasi mbuma ya Molimo ezali: bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, kosalisana, kosala bolamu, bosolo,[23] boboto, mpe komibatela. Mpo na makambo ya ndenge oyo, Mibeko ezali te.[24] Baoyo bazali bato ya Klisto, basila kobaka nzoto elongo na baposa na yango mpe bilukla nyonso.[25] Lokola tozali na bomoi na nzela ya Molimo, totambola mpe na lisungi ya Molimo.[26] Tozala bato ya lofundu te, totika kotumolana biso na biso, mpe toyokelana zuwa te.

Tite 2:1-15
[1] Kasi yo, teya makambo oyo mateya ya solo ezali kosenga.[2] Teya mibange mibali ete bazala bato ya lokoso te, bazali bato oyo bakoki mpo na kozwa botosi, bazali bato oyo bayebi komibatela malamu, bato oyo bazali peto kati na kondima na bango, na bolingo na bango, mpe na koyika mpiko na bango.[3] Ndenge moko mpe, teya mibange basi ete bazali na bomoi ya bosanto, batongaka bato te, mpe bazala bawumbu ya masanga te, kasi bateyaka makambo ya malamu.[4] Bongo bakokoka koteya bilenge basi mpo balinga mibali na bango mpe bana na bango,[5] bayeba komibatela malamu, bazala na bomoi ya peto, babongisakabandako na bango malamu, bazala bato malamu, mpe batosaka mibali na bango, mpo ete moto ata moko te aloba mabe mpo na Liloba ya Nzambe.[6] Ndenge moko mpe, lendisa bilenge mibali ete bayeba komibatela malamu.[7] Kati na makambo nyonso, zala ndakisa epai na bango na nzela ya kosala makambo oyo ezali malamu. Mateya na yo ezala ya peto mpe oyo ezali komema botosi.[8] Lobaka maloba ya malamu oyo bato bakoki koloba mabe te mpo na yango, mpo ete baoyo bazali kotelemela yo bayoka soni, pamba te bakozwa ata likambo moko teya mabe oyo bakoloba mpo na biso.[9] Teya bawumbu ete batosaka bakonzi na bango, mpe basepelisaka bango na makambo nyonso; bazongiselaka bango maloba na tembe te[10] mpe bayibaka bango te, kasi basengeli kolakisa ete bakoki kotiela bango mitema, mpo ete kati na makambo nyonso oyo bazali kosala, bakomisa mateya ya Nzambe Mobikisi na biso, eloko oyo ezali kobenda bato.[11] Pamba te, Nzambe asiʼalakisi ngolu na ye mpo na lobiko ya bato nyonso.[12] Ngolu yango ezali koteya biso ete, toboya kozanga botosi na makamboya Nzambe mpe toboya baposa ya mokili; mpe na tango oyo tozali, tozala bato ya komibatela malamu, bato ya bosembo, mpe bato oyo batosaka makambo ya Nzambe,[13] awa tozali kozela elikya ya esengo, komonana ya nkembo ya Nzambe na biso Monene mpe Mobikisi Yesu Kristo.[14] Amipesaki ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso, mpe mpo apetola mpo na ye moko, bato oyo bazali ya ye moko, baoyo bazali na posa monene mpo na kosala misala ya malamu.[15] Oyo nde makambo osengeli koteya. Lendisa mpe pamela na bokonzi nyonso. Moto moko te atiola yo.

Jacques 3:1-18
[1] Bandeko na ngai, baoyo balukaka kokoma bateyi na kati na bino, bazala mingi te, mpo boyebi ete biso baoyo toteyaka, bakosambisa bisomakasi penza.[2] Biso nyonso tosalaka mabe ya ndenge na ndenge. Soki moto asalaka mabe te na maloba oyo alobaka, moto wana azali moto ya kokoka, mpe akokikobatela nzoto na ye mobimba.[3] Tala, totiaka bibende na minoko ya bapunda mpo etosa biso, na bongo tokambaka nzoto na yango mobimba.[4] Tokamata mpe ndakisa ya masuwa: atako ezali monene mpe mopepe ya makasi nde etindikaka yango, kasi mwa yenda ya moke penza ekoki kokamba yango, mpo elanda nzela oyo kapitene ya masuwa alingi.[5] Ndenge moko mpe, lolemo ezali mwa eteni moko ya moke na kati ya nzoto ya moto, kasi emikumisaka na makambo ya minene. Bokanisa mpe ndenge moto ya moke ekoki kozikisa zamba monene![6] Lolemo mpe ezali moto, ezali mpe mokili ya makambo ya mabe kati na biteni ya nzoto na biso. Yango nde ebebisaka nzoto mobimba, mpe ezikisaka bomoi na biso mobimba sima ya kopelisama na moto na yango ewutaka na lifelo.[7] Moto akoki kolakisa banyama ya lolenge nyonso, bandeke, banyama oyo etambolaka na libumu, banyama ya mayi, mpo etosa ye, mpe asiʼalakisa yango.[8] Kasi mpo na lolemo, moto moko te akoki kolakisa yango mpo etosa ye. Yango ezali eloko moko ya mabe, elembaka te, mpe etonda na pwazo.[9] Na lolemo, topambolaka Nkolo na biso mpe Tata, mpe, na yango mpe, tolakelaka mabe na bato oyo basalama na lolenge ya Nzambe.[10] Lipamboli mpe elakeli mabe ewutaka kaka na monoko moko. Bandeko na ngai, ekoki kozala bongo te.[11] Boni, esika moko ekoki kobimisa mayi ya malamu mpe ya bololo?[12] Bandeko na ngai, nzete ya figi ekoki kobota bambuma ya Olive? To mpe nzete ya vino ekoki kobota bafigi? Ekoki kosalama te ete mayiya mungwa ebimisa mayi ya malamu.[13] Nani kati na bino azali moto ya mwania mpe ya mayele? Alakisa yango na ezaleli na ye ya malamu, mpe na misala oyo azali kosala na komikitisa oyo ewutaka na bwania.[14] Kasi soki mitema na bino etondi na zuwa ya bololo, mpe sokibozali na molimo ya koswana, wana bomikumisaka te, mpe bobebisa makambo ya solo te na lokuta na bino.[15] Bwania ya ndenge wana ewutaka epai ya Nzambe te, kasi ezali ya mokili, ya bomoto mpe ya Zabolo.[16] Pamba te, esika zuwa mpe molimo ya koswana ezali, esika wana mpe etondi mobulu ya lolenge nyonso mpe misala ya mabe.[17] Kasi bwania oyo ewutaka na Nzambe ezali, liboso: ya peto, bongo: ya kimia, ya boboto, botosi, etondi na mawa mpe na bambuma ya malamu, eponaka bilongi te, mpe ezali na bokosi te.[18] Baoyo batiaka kimia balonaka mbuma ya bosembo kati na kimia.

Lingala Bible 2002
Copyright © 2002 by Biblica, Inc.®