A A A A A

Good Character: [Patience]


1 Corinthefue 13:4
Bolingo ekangaka motema, bolingo esalisaka bato, bolingo elulaka te, bolingo emikumisaka te, bolingo emitondisaka na lolendo te.

Philippesfue 4:6
Bomitungisa na eloko ata moko te, kasi na makambo nyonso, bolakisa baposa na bino epai ya Nzambe, na nzela ya mabondeli, bisengeli, elongo na matondi.

Romefue 12:12
—mpo na elikya, bozala na esengo; —mpo na komekama, bokanga mitema; —mpo na mabondeli, boyika mpiko;

ÉphÈsefue ๔:๒
bozala bato ya komikitisa tango nyonso, bato ya boboto, mpe ya motema molayi. Bosunganaka bino na bino kati na bolingo.

Galatiefue 6:9
Bongo tokmba te mpo na kosala makambo ya malamu, pamba te, na tango malamu, tokobuka mbuma soki tokmbi te.

Luc 15:11-24
[11] Yesu alobaki lisusu: —Moto moko azalaki na bana mibale ya mibali.[12] Oyo ya leki alobaki na tata na ye: “Tata, pesa ngai ndambo ya biloko, oyo ya ngai.” Bongo tata akabolelaki bango biloko na ye.[13] Sima ya mwa mikolo, leki akongolaki biloko na ye nyonso, mpe akendaki na ekolo moko ya mosika penza. Kuna, abebisaki biloko na ye nyonso na bomoi ya mobulu.[14] Tango asilisaki kobebisa biloko nyonso, nzala monene ekotaki na ekolo wana, abandaki kokelela.[15] Bongo akendaki mpe azwaki mosala epai ya moto moko ya ekolo wana, mpe moto yango atindaki ye na bilanga na ye mpo na koleyisa bangulu.[16] Elenge mobali alingaki kotondisa libumu na ye na biloko oyo bangulu bazalaki kolia, kasi moto ata moko te azalaki kopesa ye yango.[17] Tango akanisaki malamu, amilobelaki: “Basali nyonso ya tata na ngai baliaka ndenge balingaka, kasi ngai nazali kokufa awa na nzala![18] Nakotelema mpe nakozonga epai ya tata na ngai, mpe nakoloba na ye: Tata, nasali masumu epai ya Nzambe mpe epai na yo.[19] Nazali lisusu ya kokoka te ete babenga ngai mwana na yo; komisa ngai lokola moko ya basali na yo!”[20] Bongo atelemaki mpe azongaki epai ya tata na ye. Tango azalaki naino mosika, tata na ye amonaki ye mpe ayokelaki ye mawa mingi penza. Akendaki mbangu kokutana na mwana na ye, ayambaki ye, mpe apesaki ye beze.[21] Mwana alobaki na ye: “Tata nasali masumu epai ya Nzambe mpe epai na yo mpe nazali lisusu ya kokoka te ete babenga ngai mwana na yo.”[22] Kasi tata alobaki na basali na ye: “Bomema noki nzambala ya kitoko, mpe bolatisa ye yango. Bolatisa ye mpe pete na mosapi mpe basandale na makolo;[23] boya na mwana ngombe ya mafuta mpe boboma yango. Tokosala feti ya kafu-kafu mpe tokosepela.[24] Pamba te mwana na ngai oyo, akufaki mpe azongi na bomoi; abungaki mpe amonani.” Bongo babandaki feti kati na esengo monene.

Romefue 8:24-30
[24] Pamba te, tosila tobika, kasi kobika yango ezali nanu elikya. Nzoka nde, soki tozali komona eloko oyo tozali kotiela elikya, wana ezali lisusu elikya te, pamba te, nani akoki kotia elikya na eloko oyo azali komona?[25] Kasi, soki tozali kotia elikya na eloko oyo tozali komona te, solo, tokozela yango na kokanga motema.[26] Ndenge moko mpe, Molimo asungaka biso kati na bolembu na biso. Pamba te, toyebi te nini tokoki kosenga na ndenge esengeli, kasi Molimo Ye moko abondelaka mpo na biso na maloba oyo moto akoki koloba te.[27] Bongo, Nzambe oyo atalaka mitema, ayebi makanisi ya Molimo, pamba te Molimo abondelaka mpo na basantu kolanda mokano ya Nzambe.[28] Toyebi lisusu malamu ete, makambo nyonso esalamaka mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Nzambe, baoyo abenga kolanda mokano na Ye.[29] Pamba te, baoyo Nzambe ayeba wuta kala, abongisa bango mpe wuta kala mpo ete bakokana na Mwana na Ye, mpo ete azala Mwana ya liboso kati na bandeko ebele.[30] Ba-oyo abongisa wuta kala, abenga mpe bango, baoyo ye abenga, akomisa bango mpe bato ya sembo, mpe baoyo akomisa bato ya sembo, apesa bango mpe nkembo na Ye.

2 Thessaloniquefue ๑:๔-๕
[๔] Yango wana, tomikumisaka mpo na bino na kati ya Mangomba ya Nzambe; tomikumisaka mpo na ndenge bozali kokanga motema mpe mpo na kondima oyo bozali na yango na kati ya minyoko mpe bapasi nyonso oyo bozali komona.[๕] Nyonso wana ezali kaka kolakisa ete Nzambe akataka makambo na bosembonyonso, mpo ete bomonana bozali bato ya kokoka mpo na Bokonzi ya Nzambeoyo bozali komona pasi mpo na yango.

Hébreu 11:13-16
[13] Bato wana nyonso bakufaki kati na kondima, mpe bazwaki te bilokooyo Nzambe alakaki bango; bamonaki yango kaka mpe bapesaki yango mbote na mosika. Mpe, bandimaki ete bazalaki bapaya mpe baleki nzelana kati ya mokili.[14] Baoyo balobaka makambo ya ndenge wana, balakisaki polele ete bazalikoluka mokili na bango moko.[15] Soki bakanisaki lisusu mokili oyo bango batikaki, mbele balingaki kozala na tango mpo na kozonga kuna.[16] Kasi sikʼoyo, bazali koluka mokili moko ya kitoko penza, elingi koloba: mokili ya Likolo. Yango wana Nzambe azali na soni te mpo ete babenga ye Nzambe na bango, mpemba te abongisela bango vile.

Romefue 5:2-4
[2] Na nzela na Ye, tozwi ndingisa, na nzela ya kondima, ya kozwa ngolu oyo tozali kowumela kati na yango. Esengo na biso ewuti na elikya oyo tozali na yango ete tokobika nkembo na Nzambe.[3] Tozali na esengo kaka mpo na elikya wana te, kasi mpe, mpo na bapasi, pamba te toyebi ete bapasi ebotaka koyika mpiko,[4] koyika mpiko ememaka elonga kati na komekama, mpe elonga kati na komekama ebotaka elikya.

Sa nglô yile 6:9-11
[9] Tango afungolaki lizita ya mitano, namonaki na nse ya mesa oyo batumbelaka Nzambe makabo, milimo ya baoyo bakufa mpo na Liloba ya Nzambe mpe mpo na litatoli oyo batatolaki.[10] Bazalaki koganga na mongongo makasi: —Nkolo Mosantu mpe Solo, kino tango nini okozela mpo na kosambisa bato ya mokili mpe kopesa bango etumbu mpo na makila na biso?[11] Bongo bapesaki moko moko na kati na bango nzambala ya pembe, mpe bayebisaki bango bapema moke, kino tango talo ya baninga na bango ya mosala mpe bandeko na bango ekokoka, baoyo bakoboma bango mpe lokola bango.

Lingala Bible 2002
Copyright © 2002 by Biblica, Inc.®