A A A A A

Good Character: [Compassion]


Colossesfue ೩:೧೨
Yango wana, lokola Nzambe apona bino, bino basantu mpe balingami na ye, bolata mawa, bolamu, komikitisa, boboto, mpe kokanga motema.

Jacques 5:11
Lokola boyebi, tobengaka bato ya esengo, bato oyo bazali koyika mpiko. Bosiʼboyoka ndenge Yobo akangaki motema na bapasi, mpe boyebi likambooyo Nkolo asalaki na suka mpo na bolamu na ye; Pamba te, Nkolo atonda na bolamu mpe na mawa.

Romefue 9:15
Pamba te, alobaki na Moyize: “Nakosala ngolu na moto oyo ngai nasepeli kosalela ngolu; mpe nakoyokela mawa moto oyo ngai nasepeli koyokela mawa.”

2 Corinthefue 1:3-4
[3] Lokumu epai na Nzambe, Tata na Nkolo na biso Yesu Klisto, Tata oyo ayokelaka bato mawa mpe Nzambe oyo abondisaka bato na makambo nyonso.[4] Abondisaka biso na bapasi nyonso mpo ete biso mpe tokoka kobondisa baoyo bazali kati na bapasi, na nzela ya kobondisama oyo biso mpe tozwaki epai na Ye.

Philippesfue 2:1-3
[1] Soki bozali na nmpiko oyo ewutaka na lisanga na bino na Kristo, soki bozali na kolendisama oyo ewutaka na bolingo na ye, soki bozali na boyokani elongo na Molimo, soki bozali na bolingo mpe mawa,[2] boye botondisa esengo na ngai na nzela ya kozala na likanisi moko, bolingo moko, motema moko mpe posa moko.[3] Bosala eloko moko te na molimo ya kowelana, to mpe mpo na koluka lokumu ya pamba-pamba; kasi na komikitisa nyonso bomona baninga na bino lokola nde baleki bino;

Matthieu 9:35-38
[35] Yesu azalaki kotambola na bamboka nyonso mpe na bavile nyonso; azalaki koteya na bandako na bango ya mayangani, mpe azalaki kosakola Sango Malamu ya Bokonzi; azalaki kobikisa bamaladi nyonso mpe bapasi ya ndenge na ndenge.[36] Tango amonaki ebele ya bato, ayokaki mawa mingi penza mpo na bango, pamba te bazalaki komitungisa mpe bazalaki ya kolemba lokola bameme oyo ezangi mobateli.[37] Bongo Yesu alobaki na bayekoli na ye: —Bambuma ya kobuka ezali mingi na elanga, kasi basali bazali moke![38] Yango wana bosenga nkolo ya elanga atinda basali na elanga na ye!

Matthieu 20:29-34
[29] Tango Yesu na bayekoli na ye bazalaki kobima na Jeriko, bato ebele penza bazalaki kolanda ye.[30] Bato mibale bakufa miso bavandaki pembeni ya nzela. Tango bayokaki ete Yesu azalaki koleka wana, bagangaki: —Nkolo, Mwana ya David yokela biso mawa![31] Bato bagangelaki bango, mpe balobaki na bango bavanda nyee; kasi bango bagangaki lisusu makasi: —Nkolo, mwana ya David yokela biso mawa![32] Yesu atelemaki, abengaki bango mpe atunaki bango: —Bolingi nasala nini mpo na bino?[33] Bazongiselaki ye: —Nkolo, tolingi ete miso na biso efungwama![34] Yesu ayokelaki bango mawa mpe asimbaki miso na bango. Kaka na tango wana, babandaki komona mpe balandaki ye.

Matthieu 14:13-21
[13] Tango yesu ayokaki sango yango, alongwaki wana na bwatompe akendaki ye moko kaka, na esika ezangi bato. Kasi tango bato bayokaki yango, babimaki na bavile na bango mpe balandaki ye na makolo.[14] Tango Yesu akitaki na bwato, amonaki bato ebele penza; ayokelaki bango mawa mingi. Bongo abikisaki bamaladi na bango.[15] Tango pokwa ekomaki, bayekoli bayaki epai na ye, mpe balobaki: —Tozali na esika ezangi bato, mpe tango esiʼeleki; zongisabato oyo na bamboka mpo bakende kosomba bango moko biloko ya kolia![16] Kasi Yesu alobaki na bango: —Tina ezali te mpo bakende. Bopesa bango bino moko biloko ya kolia![17] Bongo bayekoli bazongisaki: —Tozali awa na mampa mitano mpe bambisi mibale kaka.[18] Yesu alobaki: —Bomemela ngai yango awa.[19] Sima atindaki bato bavanda na matiti. Akamataki mampa mitano wana mpe bambisi mibale, atombolaki miso na likolo mpe azongisaki matondi. Akataki mampa yango mpe apesaki yango na bayekoli na ye. Bongo bayekoli bapesaki yango na bato.[20] Bango nyonso baliaki mpe batondaki. Balokotaki biteni oyo etikalaki mpe etondisaki bitunga zomi na mibale.[21] Baoyo baliaka bazalaki pene-pene mibali nkoto mitano, kotangabasi na bana te.

Matthieu 15:29-39
[29] Yesu alongwaki wana mpe akendaki pembeni ya ebale ya Galileya. Amataki na ngomba mpe afandaki wana.[30] Bato ebele penza bayaki epai na ye. Bamemaki bato oyo batambolaka tengu-tengu, bato bakufa miso, bababa, bato oyo bakufa makolo to maboko, mpe bato mosusu koleka. Batiaki bango liboso ya Yesu, bongo abikisaki bango.[31] Bato bakamwaki mingi tango bamonaki bababa bakomaki koloba, bato bakufa makolo to maboko babikaki, bato oyo batambolaka tengu-tengubabandaki kotambola malamu, mpe bato oyo bakufa miso babandaki komona. Bongo bakumisaki Nzambe ya Isayele.[32] Yesu abengaki bayekoli na ye mpe alobaki: —Nazali koyokela ebele ya bato oyo mawa mingi, pamba te basali na ngai mikolo misato mpe bazali na eloko ye kolia te. Nalingi kozongisa bango na nzala te, soki te bakoki kokweya na nzela![33] Bongo bayekoli na ye bazongisaki: —Epai wapi tokoki kozwa mampa ya kokoka, na esika oyo ezangi bato mpo na koleyisa bato ebele boye?[34] Yesu atunaki bango: —Bozali na mampa boni? Bango bazongisaki: —Sambo na mwa bambisi ya mike-mike.[35] Yesu alobaki na ebele ya bato bavanda na mabele.[36] Bongo azwaki mampa sambo wana na bambisi, azongisaki matondi, abukaki yango mpe apesaki yango na bayekoli na ye. Bongo bango bapesaki yango na bato.[37] Bango nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe yango etondisaki bitunga sambo.[38] Bato oyo baliaki bazalaki mibali nkoto minei, kotanga basi na bana te.[39] Tango Yesu asilisaki kozongisa bato, amataki na bwato mpe akendaki na mokili ya Magadani.

Matthieu 6:30-44
[30] Bongo soki Nzambe azali kolatisa na ndenge wana matiti ya bilanga, oyo ezali na bomoi lelo mpe lobi ekobwakama na moto; akoki kolatisabino koleka yango te? A a! bato ya kondima moke![31] Yango wana, bomitungisa te mpe boloba te: “Tokolia nini?” to “Tokomela nini?” to “Tokolata nini?”[32] Biloko wana nyonso, ezali bapakano nde baluka-lukaka yango. Kasi mpo na bino, Tata na bino ya Likolo ayebi ete bozali na yango posa.[33] Boluka liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na ye, bongo biloko wana nyonso bakobakisela bino yango.[34] Yango wana, bomitungisa te mpo na mokolo ya lobi; pamba te, mokolo ya lobi ekomitungisa na makambo na yango, yango moko. Mokolo na mokolo ezali na pasi oyo ekoki na yango![35] —Bosambisa te, mpo basambisa bino mpe te.[36] Pamba te, bakosambisa bino ndenge bino mpe bosambisaka baninga; mpe bakozongisela bino ndenge bino mpe bozongiselaka baninga.[37] Bongo mpo na nini ozali komona mwa lititi oyo ezali na liso ya ndeko na yo, kasi ozali komona te eteni ya nzete oyo ezali na liso na yo?[38] Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo: “nalongola mwa lititi oyo ezali na liso na yo”, nzokande, oyo ya yo moko ezali na eteni ya nzete?[39] Moto ya kokosana! Longola liboso mwa eteni ya nzete oyo ezali na liso na yo, bongo okomona malamu mpo na kolongola mwa lititi oyoezali na liso ya ndeko na yo.[40] —Bopesa te biloko ya bosantu na bambwa; mpe babwakela bangulu bapawuni na bino te; nakobanga ete eniata-niata yango mpe ezongela bino mpo na kopasola bino mike-mike.[41] —Bosenga, mpe bakopesa bino; boluka, mpe bokozwa; bobeta, mpe bakofungolela bino.[42] Pamba te oyo asengaka, bapesaka ye. Oyo alukaka, azwaka. Mpe oyo abetaka, bafungolelaka ye porte.[43] Nani kati na bino akoki kopesa mwana na ye libanga soki asengi ye limpa?[44] To soki asengi ye mbisi, akopesa ye nioka?

Luc 15:11-32
[11] Yesu alobaki lisusu: —Moto moko azalaki na bana mibale ya mibali.[12] Oyo ya leki alobaki na tata na ye: “Tata, pesa ngai ndambo ya biloko, oyo ya ngai.” Bongo tata akabolelaki bango biloko na ye.[13] Sima ya mwa mikolo, leki akongolaki biloko na ye nyonso, mpe akendaki na ekolo moko ya mosika penza. Kuna, abebisaki biloko na ye nyonso na bomoi ya mobulu.[14] Tango asilisaki kobebisa biloko nyonso, nzala monene ekotaki na ekolo wana, abandaki kokelela.[15] Bongo akendaki mpe azwaki mosala epai ya moto moko ya ekolo wana, mpe moto yango atindaki ye na bilanga na ye mpo na koleyisa bangulu.[16] Elenge mobali alingaki kotondisa libumu na ye na biloko oyo bangulu bazalaki kolia, kasi moto ata moko te azalaki kopesa ye yango.[17] Tango akanisaki malamu, amilobelaki: “Basali nyonso ya tata na ngai baliaka ndenge balingaka, kasi ngai nazali kokufa awa na nzala![18] Nakotelema mpe nakozonga epai ya tata na ngai, mpe nakoloba na ye: Tata, nasali masumu epai ya Nzambe mpe epai na yo.[19] Nazali lisusu ya kokoka te ete babenga ngai mwana na yo; komisa ngai lokola moko ya basali na yo!”[20] Bongo atelemaki mpe azongaki epai ya tata na ye. Tango azalaki naino mosika, tata na ye amonaki ye mpe ayokelaki ye mawa mingi penza. Akendaki mbangu kokutana na mwana na ye, ayambaki ye, mpe apesaki ye beze.[21] Mwana alobaki na ye: “Tata nasali masumu epai ya Nzambe mpe epai na yo mpe nazali lisusu ya kokoka te ete babenga ngai mwana na yo.”[22] Kasi tata alobaki na basali na ye: “Bomema noki nzambala ya kitoko, mpe bolatisa ye yango. Bolatisa ye mpe pete na mosapi mpe basandale na makolo;[23] boya na mwana ngombe ya mafuta mpe boboma yango. Tokosala feti ya kafu-kafu mpe tokosepela.[24] Pamba te mwana na ngai oyo, akufaki mpe azongi na bomoi; abungaki mpe amonani.” Bongo babandaki feti kati na esengo monene.[25] Na tango wana, kulutu azalaki na bilanga. Tango azalaki koya mpe akomaki pene-pene ya ndako, ayokaki makelele ya miziki mpe ya bato oyo bazalaki kobina.[26] Abengaki mosali moko mpe atunaki ye soki likambo nini ezalaki koleka kuna.[27] Mosali wana azongiselaki ye: —Ndeko na yo azongi, yango wana tata na yo abomi mwana ngombe ya mafuta, mpo azwi ye lisusu na nzoto kolongonu.[28] Kulutu asilikaki mingi penza mpe aboyaki kokota. Bongo tata na ye abimaki mpo na kobondela ye.[29] Kasi ye azongisaki: “Nasiʼnasaleli yo bambula ebele penza; mpe mbala ata moko te naboya kotosa makambo oyo osengaka ngai; mpe naino opesa ngai te ata mwana ya ntaba mpo nasepela na baninga na ngai.[30] Kasi lokola mwana na yo, oyo abebisi biloko na yo na basi ya ndumba, azongi, obomeli ye mwana ngombe ya mafuta!”[31] Bongo tata na ye alobaki na ye: “Mwana na ngai, yo ozali tango nyonso elongo na ngai mpe biloko nyonso oyo nazali na yango, ezali ya yo;[32] kasi esengeli tosala feti mpe tosepela pamba te ndeko na yo oyo, akufaki mpe azongi na bomoi; abungaki mpe amonani!”

Lingala Bible 2002
Copyright © 2002 by Biblica, Inc.®