A A A A A

Church: [Church Persecution]


Sa nga bé yôli'n 8:1
Saulo mpe azalaki na molongo ya bato oyo bandimaki ete baboma Etieni. Kaka na mokolo wana, minyoko moko ya makasi penza ekweyelaki Lingomba na Yelusalemi. Bandimi nyonso bapalanganaki na Yudea mpe na Samari, longola kaka bantoma.

Matthieu 5:44
Kasi ngai nalobi na bino: bolinga banguna na bino mpe bosambela mpo na baoyo banyokolaka bino!

2 Timothée 3:12
Pamba te, moto nyonso oyo alingi kozala na bomoi oyo ezali kotosa Nzambe kati na Yesu Kristo, akoniokwama mingi penza.

Jean 15:20
Bokanisa maloba oyo nalobaki na bino: mosali moko te aleki nkolo na ye. Soki banyokolaki ngai, bakonyokola bino mpe; soki babatelaki mateya na ngai, bakobatela mpe oyo ya bino.

Sa nglô yile 2:10
Kobanga te mpo na pasi oyo ekoyela yo. Tala, Zabolo akobwaka bato mosusu na kati na bino na boloko mpo na komekabino; mpe bokonyokwama mikolo zomi. Kangama kaka na kondima na yo, kino na liwa, mpe nakopesa yo ekoti ya lokumu oyo ya bomoi.

Romefue 8:35
Nani akokabola biso na bolingo ya Klisto? Pasi, somo, minyoko, nzala, kozanga bilamba, likama to mopanga?

Matthieu 5:11
Esengo na bino soki bakofinga bino, soki bakonyokola bino, mpe soki bakokosela bino makambo ya mabe ya ndenge na ndenge mpo na ngai.

Romefue 12:14
Bopambola bato oyo bazali konyokola bino, bopambola kasi bolakela mabe te!

Jean 5:16
Mpe mpo na yango Bayuda babandaki kotungisa Yesu mpo asalaki makambo wana na mokolo ya saba.

Matthieu 5:10-12
[10] Esengo na baoyo baniokwamaka mpo na bosembo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali ya bango.[11] Esengo na bino soki bakofinga bino, soki bakonyokola bino, mpe soki bakokosela bino makambo ya mabe ya ndenge na ndenge mpo na ngai.[12] Ya solo, bosepela mpe botonda na esengo, mpo lifuti monene ezali kozela bino na Likolo, pamba te baprofeta oyo bazalaki liboso na bino, baniokolaki bango mpe bongo.

2 Corinthefue 12:10
Yango wana, na likambo oyo etali Klisto, ezala kati na bolembu, na kofingama, na kozanga, na minyoko, to mpe na bapasi oyo nakutanaka na yango, nasepelaka na ngai kaka; pamba te ezali na tango oyo nazalaka na bolembu nde natondaka na makasi.

Sa nga bé yôli'n 13:50
Kasi Bayuda batiaki songi-songi epai ya basi ya lokumu oyo bazalaki kosambela Nzambe, epai ya bato minene ya engumba wana. Boye, bakomaki konyokola Polo na Barnabasi mpe babenganaki bango na mokili na bango.

Sa nga bé yôli'n 7:52
Boni, ezalaki solo ata na mosakoli moko oyo bakoko na bino bazangaki konyokola? Kutu, babomaki ezala basakoli oyo basakolaki koya ya Moyengebene, Ye oyo bosili sikʼoyo koteka mpe koboma,

Marc 4:17
Kasi lokola bazalaka na misisa te, bawumelaka kaka mwa tangomoke. Tango pasi to minyoko eyaka mpo na Liloba, bakweyaka noki penza.

Galatiefue 4:29
Na tango wana, mwana oyo abotamaki ndenge bato nyonso babotamaka, azalaki konyokola mwana oyo abotamaki na nguya ya Molimo. Ezali mpe ndenge moko mpo na sikʼoyo.

Marc 10:30
Bongo azanga kozwa sikʼoyo mbala nkama koleka, na tango oyo tozali: Bandako, bandeko ya mibali, bandeko ya basi, bamama, bana, mpe bilanga, elongo na minyoko; mpe na tango oyo ekoya: bomoi ya seko.

Matthieu 13:21
Kasi lokola ezangaki misisa, ewumelaki kaka mwa tango moke. Pamba te, tango bapasi to tango minyoko ekoya mpo na Liloba, akokweya noki penza.

Sa nga bé yôli'n 22:4
Nanyokolaki bato oyo bazalaki kolanda Nzela oyo kino koboma bango, nazalaki kokanga ezala mibali to basi mpe kobwaka bango na boloko.

Matthieu 5:10
Esengo na baoyo baniokwamaka mpo na bosembo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali ya bango.

Galatiefue 6:12
Baoyo batindaka bino na makasi mpo bokatisa nzotu, bazali bato oyo balukaka kaka koyebana na miso ya bato. Basalaka bongo kaka mpo banyokola bango te mpo na ekulusu ya Klisto.

Luc 21:12
—Kasi liboso ya makambo wana, bakokanga bino, bakonyokola bino, bakosambisa bino na bandako ya mayangani mpe bakotia bino na boloko. Mpe mpo na kombo na ngai, bakomema bino liboso ya bakonzi mpe liboso ya bayangeli.

Marc 10:29-30
[29] Yesu azongisaki: —Nalobi na bino ya solo, moto moko te oyo atiki ndako na ye, bandeko na ye ya mibali, bandeko na ye ya basi, mama na ye, tata na ye, bana na ye, to bilanga na ye, mpo na ngai mpe mpo na Sango Malamu;[30] Bongo azanga kozwa sikʼoyo mbala nkama koleka, na tango oyo tozali: Bandako, bandeko ya mibali, bandeko ya basi, bamama, bana, mpe bilanga, elongo na minyoko; mpe na tango oyo ekoya: bomoi ya seko.

Romefue 8:35-37
[35] Nani akokabola biso na bolingo ya Klisto? Pasi, somo, minyoko, nzala, kozanga bilamba, likama to mopanga?[36] Ndenge ekomama: “Ezali mpo na Yo nde balukaka koboma biso mikolo nyonso, bamonaka biso lokola meme oyo babongisi mpo na koboma.”[37] Kasi kati na makambo oyo nyonso, tozali solo balongi na nzela na Ye oyo alinga biso.

Sa nga bé yôli'n 11:19-21
[19] Nzoka nde, bandimi oyo bapalanganaki mpo na kokima minyoko oyo eyaki tango babomaki Etieni, bakimaki kino na Fenisi, na Shipre mpe na Antioshe. Mpe kuna, bazalaki kosakola sango malamu kaka epai na Bayuda.[20] Kasi misusu kati na bango, bato ya Shipre mpe ya Sirene bakendaki na Antioshe mpe bakomaki koteya sango malamu ya Nkolo Yesu epai ya bato ya bikolo ya bapaya.[21] Nguya ya Nkolo ezalaki na bango elongo mpe bato ebele penza bandimelaki Nkolo mpe bamipesaki epai na Ye.

Sa nga bé yôli'n 9:4-5
[4] Boye, akweyaki na mabele mpe ayokaki mongongo moko koloba na ye: —Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola ngai?[5] Saulo atunaki: —Nkolo, yo nani? Mongongo ezongisaki: —Ezali ngai Yesu oyo yo ozali konyokola.

Galatiefue 5:11
Bandeko na ngai, soki ya solo ete nazali nanu koteya ete kokatisa nzoto ezali na tina, bongo mpo na nini bazali konyokola ngai? Soki ezali bongo, wana mabe oyo bato bayokaka na mitema mpo na mateya ya ekulusu ezali na tina te.

Matthieu 10:23
Soki banyokoli bino na vile moko, bokima na oyo mosusu. Nalobi na bino ya solo: bokosilisa te kokimakima na bavile nyonso ya Isayele liboso ete Mwana ya moto aya.

Matthieu 5:12
Ya solo, bosepela mpe botonda na esengo, mpo lifuti monene ezali kozela bino na Likolo, pamba te baprofeta oyo bazalaki liboso na bino, baniokolaki bango mpe bongo.

1 Timothée 1:13
ngai moto nazalaki liboso moto oyo azalaki kotiola ye, konyokolo ye, mpe kofinga ye; kasi ayokelaki ngai mawa, pamba te nazalaki koyeba te makambo nazalaki kosala, mpe nazalaki na kondima te.

Matthieu 5:11-12
[11] Esengo na bino soki bakofinga bino, soki bakonyokola bino, mpe soki bakokosela bino makambo ya mabe ya ndenge na ndenge mpo na ngai.[12] Ya solo, bosepela mpe botonda na esengo, mpo lifuti monene ezali kozela bino na Likolo, pamba te baprofeta oyo bazalaki liboso na bino, baniokolaki bango mpe bongo.

Luc 11:49
Yango wana, Nzambe kati na bwania na ye alobaki: “Nakotindela bango baprofeta mpe bapostolo, bakoboma basusu, mpe bakonyokola bamosusu.”

1 Thessaloniquefue 3:3-4
[3] mpo ete moto moko te na kati na bino akweya na minyoko oyo bozali komona; pamba te, bino moko boyebi malamu ete, tosiʼtobongisama mpo na yango.[4] Tango tozalaki na bino elongo, toyebisaki bino etetokokutana na minyoko. Mpe yango nde esalami, ndenge boyebi yango malamu.

Hébreu 11:36-38
[36] Basusu batiolaki bango, babetaki bango bafimbo, bakangaki bango minyololo mpe babwakaki bango na boloko;[37] babambaki bango mabanga, bakataki bango biteni mibale na si, babomaki bango na mopanga, bazalaki koyenga-yenga, balataki bamposo ya bameme na oyo ya bantaba, bazangaki nyonso, banyokolaki bango mpe bayokisakibango pasi;[38] ya solo, mokili ebongaki mpo na bango te. Bayengaki-yengaki kati na bisobe, na bangomba, na mabulu oyo ezalaki na kati ya mabanga, mpe na mabulu oyo ezalaki na mabele.

Jean 15:20-21
[20] Bokanisa maloba oyo nalobaki na bino: mosali moko te aleki nkolo na ye. Soki banyokolaki ngai, bakonyokola bino mpe; soki babatelaki mateya na ngai, bakobatela mpe oyo ya bino.[21] Kasi bakosala bino makambo wana nyonso mpo na kombo na ngai, mpo bayebi te moto oyo atindaki ngai.

Matthieu 10:21-23
[21] Ndeko moko akoteka ndeko na ye mpo abomisa ye; tata akoteka mwana na ye; bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango.[22] Bato nyonso bakoyina bino mpo na ngai. Kasi moto oyo akotia molende kino na suka, akobika.[23] Soki banyokoli bino na vile moko, bokima na oyo mosusu. Nalobi na bino ya solo: bokosilisa te kokimakima na bavile nyonso ya Isayele liboso ete Mwana ya moto aya.

Matthieu 24:8-10
[8] Makambo nyonso wana ekozala kaka ebandeli ya bapasi oyo mwasi ayokaka soki alingi kobota.[9] Bongo, bakokaba bino mpo na konyokola bino mpe bakoboma bino. Bikolo nyonso ekoyina bino mpo na kombo na ngai.[10] Na tango wana, bato mingi bakotika kondima, bakotekana mpe bakoyinana.

Luc 21:12-19
[12] —Kasi liboso ya makambo wana, bakokanga bino, bakonyokola bino, bakosambisa bino na bandako ya mayangani mpe bakotia bino na boloko. Mpe mpo na kombo na ngai, bakomema bino liboso ya bakonzi mpe liboso ya bayangeli.[13] Makambo yango ekopesa bino nzela ya kotatola kombo na ngai.[14] Botia likambo oyo kati na mitema na bino: bomitungisa te mpo na ndenge bokomilongisa.[15] Pamba te, ngai moko nakopesa bino maloba mpe bwania, oyo banguna na bino nyonso bakokoka te kozongisa eyano to kotia na yango tembe.[16] Baboti na bino, bandeko na bino ya mibali, bato oyo boyebani na bango, mpe baninga na bino, bakoteka bino mpe bakobomisa basusu kati na bino.[17] Bato nyonso bakoyina bino mpo na kombo na ngai.[18] Kasi ata suki moko te ya motu na bino ekobunga![19] Pamba te, soki botelemi ngwi, nde bokobika.

1 Corinthefue 4:8-13
[8] Bosiʼbozwi nyonso oyo bolingaka! Bosibokomi bato ya bomengo! Bosibokomi bakonzi, na nzela na biso te. Ya solo, nalingi ete bokoma penza bakonzi, mpo ete biso mpe tokoka kokoma bakonzi elongo na bino.[9] Pamba te, nakanisi ete Nzambe abimisa biso bantoma na molongo ya suka, lokola bato oyo bakatela bango etumbu ya liwa na esika ya masano. Pamba te bakomisa biso lisano mpo na mokili, mpo na baanzelu, mpe mpo na bato.[10] Biso tozali bazoba mpo na Klisto, kasi bino bozali bato ya bwanya kati na Klisto! Tozali na bolembu, kasi bino bozali na makasi! Bozali kozwa lokumu, kasi biso bazali kotiola biso![11] Kino tango oyo, tozali konyokwama na nzala, na posa ya mayi, tozangi bilamba, bazali kobeta biso, mpe tozali na esika ya kovanda te,[12] tozali kosala mosala makasi na maboko na biso. Tango bafingaka biso, topambolaka; tango banyokolaka biso, tokangaka mitema mpo na yango;[13] tango balobaka makambo ya lokuta mpo na biso, tozongisaka na boboto nyonso. Mpe kino sikʼoyo tokoma lokola biloko ya bosoto ya mokili, lokola biloko oyo babwakaka na folu.

Hébreu 10:32-34
[32] Bokanisa lisusu mikolo ya liboso: na mikolo yango, sima ya kozwa moi ya Nzambe, boyikaki mpiko na etumba monene ya bapasi.[33] Pamba te tango mosusu bazalaki kofinga bino mpe konyokola bino na miso ya bato; tango mosusu mpe bozalaki komona pasi elongona bato oyo bazalaki koniokwama ndenge wana.[34] Pamba te, bosanganaki na bapasi oyo bato ya boloko bazalaki komona, mpe bondimaki na esengo nyonso ete babotola bino biloko nabino, mpo boyebaki ete bozali na bomengo ya kitoko penza mpe oyo ekowumela libela na libela.

Hébreu 11:33-38
[33] bango, mpo na kondima, balongaki mikili mingi, batambusaki makambo na bosembo, mpe bazwaki biloko oyo balakaki bango; bakangaki minoko ya bantambwe,[34] babomaki nguya ya moto, bakimaki mino ya mopanga; batondaki na makasi nzokande bazalaki bato ya bolembu, bakomaki bato ya makasina etumba, mpe bakimisaki mampinga ya basoda ya bapaya;[35] basi, bazwaki bakufi na bango oyo bazongaki lisusu na bomoi. Basusu banyokwamaki mpe baboyaki bakangola bango, mpo bayebaki ete bakosekwa lisekwa moko ya kitoko penza.[36] Basusu batiolaki bango, babetaki bango bafimbo, bakangaki bango minyololo mpe babwakaki bango na boloko;[37] babambaki bango mabanga, bakataki bango biteni mibale na si, babomaki bango na mopanga, bazalaki koyenga-yenga, balataki bamposo ya bameme na oyo ya bantaba, bazangaki nyonso, banyokolaki bango mpe bayokisakibango pasi;[38] ya solo, mokili ebongaki mpo na bango te. Bayengaki-yengaki kati na bisobe, na bangomba, na mabulu oyo ezalaki na kati ya mabanga, mpe na mabulu oyo ezalaki na mabele.

Sa nga bé yôli'n 12:1-19
[1] Na tango wana, mokonzi Erode akomaki kokanga bandimi misusu ya lingomba mpo na konyokola bango.[2] Bongo, abomisaki Jake, ndeko ya Yoane na mopanga.[3] Boye, tango amonaki ete likambo yango ezalaki kosepelisa Bayuda, akangisaki mpe Piere na tango ya feti ya mapa oyo ezanga levire.[4] Sima ya kokangisa Piere, atiaki ye na boloko mpe apesaki ye na maboko ya masanga minei ya basoda, mpo ete bakengela ye: lisanga moko na moko ezalaki na basoda minei. Erode azalaki na likanisi ya kosambisa ye liboso ya bato sima ya feti ya Pasika.[5] Bongo, bazalaki kokengela Piere na boloko, kasi Lingomba ezalaki kobondela Nzambe na molende nyonso mpo na ye.[6] Na butu ya mokolo oyo Erode alingaki kosambisa Piere liboso ya bato, Piere oyo azalaki ya kokangama na minyololo mibale, alalaki kati na basoda mibale mpe bakengeli bazalaki kokengela liboso ya ekuke ya boloko.[7] Na mbala moko, anjelu ya Nkolo abimaki na pwasa mpe pole engengisaki boloko. Anjelu aningisaki Piere na mopanzi, alamusaki ye mpe alobaki na ye: “Telema noki!” Bongo, minyololo oyo ezalaki na maboko ya Piere ekweyaki.[8] Anjelu alobaki na ye: “Kanga mokaba na yo mpe lata sandale na yo!” Piere asalaki kaka bongo. Mpe anjelu alobaki na ye lisusu: “Lata kazaka na yo mpe landa ngai!”[9] Piere abimaki na boloko mpe alandaki ye. Azalaki koyeba te ete makambo oyo anjelu azalaki kosala ezalaki solo, kasi ye azalaki kokanisa ete ezali ndoto.[10] Wana ezalaki bango kokende, balekaki esika oyo bakengeli ya liboso mpe ya mibale bazalaki, boye bakomaki na ekuke ya bibende oyo bakotelaka na engumba, mpe ekuke yango efongwamaki yango moko. Tango babimaki mpe bakomaki na suka ya balabala, na mbala moko, anjelu atikaki ye.[11] Tango Piere asosolaki ete makambo oyo esalami epai na ye ezali ya solo, alobaki: “Solo, namoni sikʼoyo ete Nkolo atindaki anjelu na ye, mpe akangoli ngai na maboko ya Erode mpe na makambo nyonso oyo Bayuda balingaki kosala ngai!”[12] Tango amonaki bongo, akendaki na ndako ya Maria, mama na Yoane oyo babengaka mpe Malako. Bandimi ebele basanganaki kuna, mpe bazalaki kobondela Nzambe.[13] Piere abetaki ekuke mpe mosali moko ya mwasi, na kombo ya Rode ayaki koluka koyeba soki ezali nani.[14] Tango asosolaki ete ezali mongongo ya Piere, atondaki na esengo; na esika ya kofungola ekuke, azongaki mbangu koyebisa bango: —Eh! Ezali Piere, azali na libanda liboso ya ekuke.[15] Kasi bango bazongiselaki ye: —Nini, ozali na liboma! Kasi Rode azalaki kaka koloba: —Ya solo penza! Piere azali na libanda. Bongo, balobaki: —Te, ekoki kozala anjelu na ye.[16] Nzoka nde, Piere azalaki kaka kokoba kobeta ekuke. Boye, tango bafungolaki ekuke mpe bamonaki ye, bakamwaki makasi.[17] Piere apepelaki bango loboko mpo ete bavanda kimia. Alimbolelaki bango ndenge nini Nkolo abimisaki ye na boloko. Alobaki lisusu: “Boyebisa makambo oyo epai ya Jake mpe bandeko misusu.” Bongo na sima, abimaki na ndako mpo na kokende epai mosusu.[18] Wana tongo etanaki, mobulu monene ebimaki kati na basoda, pamba te bazalaki kotunana: “Likambo nini ekomelaki Piere?”[19] Erode atindaki bato mpo ete baluka Piere, kasi bamonaki ye te. Bongo, asambisaki bakengeli mpe atindaki ete baboma bango. Boye, Erode atikaki Yudea mpe akendaki kovanda mwa mikolo na Sezare.

Sa nga bé yôli'n 9:1-14
[1] Nzoka nde, Saulo azalaki kaka kokanela mpe koluka koboma bayekoli ya Nkolo. Akendaki epai ya mokonzi ya banganga-Nzambe,[2] mpe asengaki ye mikanda mpo na kopesa na bandako ya mayangani ya Damasi, mpo ete soki akuti ndambo ya bato kuna, basi to mibali oyo bazali kolanda nzela ya Nkolo, akanga bango mpe amema bango na Yelusalemi.[3] Tango azalaki kokende mpe akomaki pene ya Damasi, na mbala moko, amonaki pole moko kowuta na likolo mpe kongengela ye.[4] Boye, akweyaki na mabele mpe ayokaki mongongo moko koloba na ye: —Saulo, Saulo, mpo na nini ozali konyokola ngai?[5] Saulo atunaki: —Nkolo, yo nani? Mongongo ezongisaki: —Ezali ngai Yesu oyo yo ozali konyokola.[6] Kasi sikʼoyo telema, kota na engumba, mpe kuna bakoyebisa yo makambo oyo osengeli kosala.[7] Bato oyo bazalaki kosala mobembo elongo na Saulo batelemaki mpe bazangaki maloba ya koloba. Bayokaki mongongo yango, kasi bamonaki moto moko te.[8] Saulo atelemaki wuta na mabele, kasi tango afungolaki miso, azalaki komona lisusu te. Boye, basimbaki ye na loboko mpe bamemaki ye na Damasi.[9] Asalaki mikolo misato: komona te, kolia te mpe komela te.[10] Moyekoli moko azalaki na Damasi, kombo na ye ezalaki Ananiasi. Nkolo abengaki ye na emoniseli: —Ananiasi! Ye azongisaki: —Nkolo, ngai oyo![11] Nkolo alobaki na ye: —Telema, kende na ndako ya Yuda, oyo ezali na balabala oyo babengaka: “Alima,” mpe tuna moto moko ya mboka Tarse, oyo azali kobondela. Kombo na ye Saulo.[12] Pamba te, amonaki na emoniseli moto moko kombo na ye Ananiasi ayaki mpe atielaki ye maboko mpo ete amona lisusu![13] Kasi Ananiasi azongisaki: —Nkolo, nayoka makambo mingi mpo na moto wana, mpe ndenge anyokolaki babulami na yo na Yelusalemi.[14] Mpe ayei awa na Damasi, na bokonzi oyo bakonzi ya banganga-Nzambe bapesi ye mpo na kokanga bato nyonso oyo babondelaka yo.

Galatiefue 1:13
Pamba te, bosi boyoka ezaleli oyo nazalaki na yango: kala na tango nazalaki na kondima ya bayuda, ndenge nazalaki konyokola Lingomba ya Nzambe mpe ndenge nazalaki kosala nyonso mpo na kopanza yango.

Sa nglô yile 2:8-10
[8] —Komela anzelu ya lingomba oyo ezali na Simirne: “Moto oyo azali moto ya liboso mpe ya suka, oyo akufaki mpe azalilisusu na bomoi, alobi boye:[9] Nayebi minyoko na yo mpe kokelela na yo—nzokande ozali moto ya bomengo. Nayebi mpe ndenge bato oyo balobaka ete bazali Bayuda bafingaka yo, nzokande bazali Bayuda te kasi bazali ndako ya mayangani ya Satana,[10] Kobanga te mpo na pasi oyo ekoyela yo. Tala, Zabolo akobwaka bato mosusu na kati na bino na boloko mpo na komekabino; mpe bokonyokwama mikolo zomi. Kangama kaka na kondima na yo, kino na liwa, mpe nakopesa yo ekoti ya lokumu oyo ya bomoi.

Sa nga bé yôli'n 26:9-11
[9] Ngai moko mpe nazalaki kondima ete esengelaki na ngai kosala nyonso, mpo na kotelemela Kombo ya Yesu ya Nazareti.[10] Boye, mosala yango nde nasalaki na Yelusalemi. Nakangisaki basantu ebele na boloko, na ndingisa ya bakonzi ya banganga-Nzambe, boye ngai mpe nazalaki kondima tango bazalaki koboma bango.[11] Mbala mingi nazalaki kotambola na bandako ya mayangani mpo na kopesa bango bitumbu mpe kotinda bango na makasi ete batiola Yesu Klisto. Na zuwa na ngai oyo eleka ndelo, nazalaki kolanda bango kino na bingumba ya bapaya mpo na konyokola bango.

1 Corinthefue 4:12
tozali kosala mosala makasi na maboko na biso. Tango bafingaka biso, topambolaka; tango banyokolaka biso, tokangaka mitema mpo na yango;

Sa nga bé yôli'n 12:1
Na tango wana, mokonzi Erode akomaki kokanga bandimi misusu ya lingomba mpo na konyokola bango.

Philippesfue 3:6
mpo na oyo etali molende, naniokolaki Lingomba; mpo na oyo etali bosembo oyo bato balukaka na nzela ya Mibeko, nazalaki na mabe ata moko te.

Lingala Bible 2002
Copyright © 2002 by Biblica, Inc.®