A A A A A

Church: [Parables From Jesus]


Matthieu 5:14-16
[14] Bino bozali mwinda ya mokili, mboka oyo ezali likolo ya ngomba, yango ekoki kobombama te.[15] Mpe bapelisaka mwinda te mpo na kotia yango na nse ya katini, kasi na likolo ya eloko oyo batiela muinda mpo engengisa bato nyonso oyo bazali na kati ya ndako.[16] Yango wana, mwinda na bino esengeli engenga ndenge wana liboso ya bato, mpo bamona misala na bino ya malamu mpe bakumisa Tata na bino oyo azali na Likolo.

Matthieu 7:1-5
[1] —Bosambisa te, mpo basambisa bino mpe te.[2] Pamba te, bakosambisa bino ndenge bino mpe bosambisaka baninga; mpe bakozongisela bino ndenge bino mpe bozongiselaka baninga.[3] Bongo mpo na nini ozali komona mwa lititi oyo ezali na liso ya ndeko na yo, kasi ozali komona te eteni ya nzete oyo ezali na liso na yo?[4] Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo: “nalongola mwa lititi oyo ezali na liso na yo”, nzokande, oyo ya yo moko ezali na eteni ya nzete?[5] Moto ya kokosana! Longola liboso mwa eteni ya nzete oyo ezali na liso na yo, bongo okomona malamu mpo na kolongola mwa lititi oyoezali na liso ya ndeko na yo.

Matthieu 9:16-17
[16] Moto moko te akoki kokamata kitendi ya sika mpona abamba elambaya kala, mpo ete kitendi wana ekopasola elamba ya kala mpe lidusu ekokoma monene.[17] Ndenge moko mpe batiaka te vino ya sika na basaki ya kala; soki te basaki ekopasuka, vino ekosopana mpe basaki ekobeba. Kasi batiaka vino ya sika na basaki mpe ya sika, bongo vino na basaki ekobombama malamu!

Matthieu 12:24-30
[24] Kasi tango bafarizeo bayokaki bongo, balobaki: —Moto oyo azali kobengana milimo mabe na nguya ya Belezebule: mokonzi ya milimo mabe![25] Yesu ayebaki makanisi na bango, mpe alobaki: —Bokonzi nyonso oyo ezali ya kokabwana kati na yango moko, ekopanzana; mpe vile nyonso to ndako nyonso oyo ezali ya kokabwana kati na yango moko, ekoki kowumela te.[26] Soki Satana abengani Satana, wana amikaboli kaka ye moko; bongo bokonzi na ye ekowumela ndenge nini?[27] Soki ngai nabenganaka milimo mabe na nguya ya Belezebule, bongo bato na bino babenganaka bango na nguya ya nani? Yango wana, bango moko bakozala bazuzi na bino.[28] Kasi soki nabenganaka milimo mabe na nguya ya Molimo na Nzambe, wana bosengeli boyeba ete Bokonzi ya Nzambe esiʼekomi epai na bino.[29] To mpe, ndenge nini moto akoki kokota na ndako ya elombe mpekoyiba biloko na ye, soki naino akangisi ye na bansinga te? Kasi soki akangisi ye na bansinga, nde akoki koyiba biloko ya ndako na ye.[30] Moto oyo azali elongo na ngai te, azali monguna na ngai; mpe oyo asangisaka elongo na ngai te, azali kopanza.

Matthieu 13:1-23
[1] Kaka mokolo wana, Yesu abimaki na ndako mpe akendaki pembeni ya ebale.[2] Bato ebele penza bayaki kotondela ye bipai na bipai; yango wana amataki na bwato mpe avandaki. Bongo ebele ya bato batelemaki na mokili.[3] Mpe ateyaki bango makambo mingi na masapo. Alobaki na bango: —Moloni moko akendaki kolona mbuma na elanga.[4] Tango azalaki kobwaka bambuma, ndambo ekweyaki pembeni-pembeniya nzela; bandeke bayaki mpe baliaki yango.[5] Ndambo ekweyaki na esika ya mabanga, epai mabele ezalaki mingi te. Bambuma yango ebimaki noki mpo mabele ezalaki na mozindo te.[6] Kasi tango moi ya makasi ebimaki, mwa banzete yango ezikaki mpe ekawukaki mpo ezalaki na misisa te.[7] Mosusu ekweyaki kati ya banzube; banzube ekolaki mpe efinaki mwabanzete yango.[8] Kasi mosusu ekweyaki na mabele ya malamu, mpe ebotaki bambuma: moko, nkama moko; mosusu, ntuku motoba; mpe mosusu, ntuku misato.[9] Oyo azali na matoyi, ayoka![10] Bayekoli bapusanaki pene-pene na ye mpe batunaki ye: —Mpo na nini ozali kolobela bango na masapo?[11] Bongo ye azongiselaki bango: —Bino bozwi nzela ya koyeba basekele ya Bokonzi ya Likolo, kasi bango bazwi yango te.[12] Pamba te, moto nyonso oyo azali na eloko, bakopesa ye mpeakotonda na yango; kasi moto oyo azali na eloko te, bakobotola ye ata oyo azali na yango.[13] Tala tina nazali kosalela masapo mpo na kolobela bango; mpo ata bazali kotala, kasi bazali komona te; ata bazali kotia matoyi, kasi bazali koyoka te mpe kososola te.[14] Ezali mpo na bango nde maloba ya moprofeta Ezayi ekokisami, oyo ezali koloba: Bokoyoka, kasi bokososola te; bokotala, kasi bokomona te![15] Pamba te mitema ya bato oyo ekomi libanga, bazipi matoyi mpe bakangi miso na bango; na kobanga ete miso na bango emona, matoyi na bango eyoka, mitema na bango esosola, babongola mitema mpe nakoka kobikisa bango.[16] Nzokande, bino bozali bato ya esengo, pamba te miso na binoezali komona mpe matoyi na bino ezali koyoka.[17] Ya solo nalobi na bino: baprofeta mingi mpe bato mingi ya bosembo bazalaki na posa ya komona makambo oyo bozali komona, kasi bamonaki yango te; bazalaki na posa ya koyoka makambo oyo bozali koyoka, kasi bayokaki yango te.[18] Boyoka ndimbola ya lisapo ya moloni mbuma:[19] Mbala nyonso soki moto ayoki Liloba ya Bokonzi kasi asosoli yango te, monguna akoya mpe akopikola mbuma oyo elonamaki na motema na ye; oyo nde mbuma ekweyaki pembeni-pembeni ya nzela.[20] Oyo ekweyaki na esika ya mabanga, ezali moto oyo ayoki lilobampe ayambi yango mbala moko na esengo.[21] Kasi lokola ezangaki misisa, ewumelaki kaka mwa tango moke. Pamba te, tango bapasi to tango minyoko ekoya mpo na Liloba, akokweya noki penza.[22] Oyo ekweyaki na kati ya banzube, ezali moto oyo ayoki Liloba kasi makanisi ya bomoi oyo mpe bomengo oyo ekosaka, efinaka yango, mpe epesaka yango nzela te mpo na kobota.[23] Kasi oyo ekweyaki na mabele ya malamu, ezali moto oyo ayoki Liloba mpe asosoli yango. Abotaka mbuma: nkama, ntuku motoba, mpe ntuku misato.

Matthieu 13:24-30
[24] Yesu alobelaki bango lisapo mosusu: —Bokonzi ya Likolo ekokani na moto moko alonaki mbuma ya malamu na elanga na ye.[25] Tango bato bazalaki kolala, monguna na ye ayaki mpe alonaki matitiya mabe na kati ya ble, bongo akendaki.[26] Tango ble ebimaki mpe ebandaki kobimisa mwa mitu ya mbuma, matiti ya mabe mpe ebimaki.[27] Basali ya nkolo ya elanga bayaki mpe balobaki: —Mokonzi, olonaki mbuma ya malamu na elanga na yo te? Bongo matiti oyo ya mabe ewuti wapi?[28] Ye azongisaki: —Monguna moto asali bongo! Basali batunaki: —Olingi tokende mpe topikola yango?[29] Ye azongisaki: —Te! Mpo tango bokobanda kolongola matiti ya mabe, bokoki mpe kopikola ble elongo na yango.[30] Botika yango mibale ekola esika moko kino na tango ya kobuka mbuma. Na tango wana nde, nakoloba na bato oyo balongolaka mbuma: “Bolongola liboso matiti ya mabe, bokanga yango maboke mpe botumba yango; kasi bobuka ble mpe botia yango na ebombelo na ngai ya mbuma”.

Matthieu 13:31-32
[31] Yesu ayebisaki bango lisapo mosusu: —Bokonzi ya Likolo ekokani na mbuma ya mutarde; moto moko azwaki mpe alonaki yango na elanga na ye.[32] Mbuma yango eleki bambuma nyonso na moke; kasi soki ebimi, elekaka biloko nyonso oyo balonaka na elanga mpe ekomaka mwa nzeteepai bandeke bayaka kosala bandako na bango na bitapi na yango!

Matthieu 13:33-34
[33] Yesu ayebisaki bango lisapo mosusu: —Bokonzi ya Likolo ekokani na kisi oyo evimbisaka mampa oyo mwasi akamati mpeasangisi yango na kopo misato ya farine, kino tango farine nyonso ekovimba.[34] Yesu alobaki na ebele ya bato makambo nyonso wana na masapo, mpe ata mbala moko te azalaki kolobela bango bongo azangisa lisapo.

Matthieu 13:44
—Bokonzi ya Likolo ekokani na eloko ya talo oyo babomba na elanga; soki moto moko amoni yango, akobomba yango lisusu. Na esengo wana, akokende koteka biloko na ye nyonso oyo azali na yango mpe akosomba elanga wana!

Matthieu 13:45-46
[45] Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na moto ya mombongo oyo alukaka bapawuni ya kitoko.[46] Soki amoni pawuni moko ya ntalo mingi, akokende koteka biloko nyonso oyo azali na yango mpe akosomba yango!

Matthieu 13:47-50
[47] —Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na monyama oyo babwaki na ebale, mpe ekangi bambisi ya ndenge na ndenge.[48] Soki etondi, bato oyo bakangaka mbisi bakobimisa yango na mokili, bakofanda, mpe bakotia oyo ya malamu na bitunga bongo bakobwaka oyo ya mabe.[49] Ekozala mpe bongo na suka ya mokili; baanzelu bakoya kokabola batomabe na kati ya bato na sembo.[50] Bongo bakobwaka bato mabe na fulu ya moto epai ekozala kolela mpe koswa mino.

Matthieu 15:10-20
[10] Bongo Yesu abengaki ebele ya bato mpe alobaki: —Boyoka mpe bososola:[11] Oyo ekotaka na monoko ya moto ekomisaka ye mbindo te, kasi oyo ebimaka na monoko na ye yango nde ekomisaka ye mbindo.[12] Bongo bayekoli bapusanaki pene-pene na ye mpe bayebisaki ye: —Oyebi te ete Bafarizeo babeti mabaku tango bayoki maloba na yo?[13] Yesu azongisaki: —Eloko nyonso oyo Tata na ngai ya Likolo alona te, bakopikola yango.[14] Botika bango! Bazali bato bakufa miso oyo bazali kotambusa bato mosusu oyo bakufa miso. Soki moto akufa miso azali kotambusa moto mosusuoyo akufa miso, bango mibale bakokweya na libulu![15] Piere alobaki na ye: —Limbolela biso lisapo oyo.[16] Bongo Yesu atunaki bango: —Bino mpe bozali naino kososola te?[17] Boyebi te ete oyo nyonso ekotaka na monoko ekendaka na libumu, bongo na sima, ebimaka na libanda?[18] Kasi oyo ebimaka na monoko, ewutaka na motema mpe yango nde ekomisaka moto mbindo.[19] Pamba te, makanisi ya mabe, koboma, kosala kindumba, makambo ya soni, koyiba, litatoli ya lokuta mpe kofinga ewutaka na motema.[20] Makambo oyo nde ekomisaka moto mbindo. Kasi, kolia na maboko oyoesokolami te, ekomisaka moto mbindo te.

Matthieu 18:10-14
[10] Bokeba ete botiola ata mwana moko te na kati ya bana oyo pamba te, nalobi na bino: baanzelu na bango na Likolo, bamonaka tango nyonso elongi ya Tata na ngai oyo azali na Likolo.[11] [Pamba te Mwana ya moto ayaki mpo na kobikisa baoyo babunga.][12] Bokanisi nini? Soki moto moko azali na bameme nkama bongo moko ebungi, akotika te bameme na ye ntuku libwa na libwa mosusu likolo ya ngomba, mpo akende koluka moko oyo ebungi?[13] Mpe soki amoni yango, nalobi na bino ya solo, akoyoka esengo mingi penza mpo na meme wana moko, koleka esengo ya bameme ntuku libwa na libwa oyo ebungaki te.[14] Ndenge moko mpe, Tata na bino ya Likolo, alingi te ete ata mwanamoko na kati ya bana oyo abunga.

Matthieu 18:23-35
[23] Yango wana, Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo alingaki kotanga mbongo na ye na basali na ye.[24] Tango abandaki kotanga, bamemelaki ye mosali moko oyo azalaki na nyongo na ye ya bamili zomi na batalenta.[25] Lokola azalaki na eloko moko te mpo na kofuta, mokonzi na ye atindaki ete bateka ye na mwasi na ye; na bana na ye, na biloko na ye nyonso, mpo nyongo na ye efutama.[26] Kasi mosali oyo afukamaki liboso ya mokonzi, mpe abondelaki ye: —Kanga motema mpo na ngai, nakofuta yo nyongo nyonso![27] Mokonzi ayokelaki ye mawa, alimbisaki nyongo na ye mpe atikaki yeakende.[28] Kasi tango mosali wana abimaki, akutanaki na moninga na ye ya mosala, oyo adefaki badeni na ye kama. Akangaki ye mpe afinaki na kingo. Bongo alobaki na ye: —Futa nyongo na ngai nyonso.[29] Moninga na ye ya mosala afukamaki mpe abondelaki ye: —Kanga motema mpo na ngai, nakofuta yo nyonso na yo.[30] Kasi ye aboyaki. Akendaki mpe atiesaki ye na boloko kino tangoasilisaki kofuta niongo nyonso.[31] Tango basali mosusu bamonaki ndenge makambo elekaki, bayokaki mawa mingi penza, mpe bakendaki koyebisa nyonso epai ya mokonzi na bango.[32] Bongo mokonzi abengaki mosali wana mpe alobaki na ye: —Mosali mabe! Nalimbisaki yo nyongo nyonso oyo ozalaki na yango, mpo obondelaki ngai.[33] Boni, okokaki te koyokela moninga na yo mawa ndenge ngai mpe nayokelaki yo mawa.[34] Lokola mokonzi na ye azalaki na kanda, apesaki ye na maboko ya bato oyo baniokolaka bato kino tango afutaki niongo nyonso.[35] Na ndenge wana nde, Tata na ngai ya Likolo, akosala moto na moto na kati na bino, oyo akoboya kolimbis ndeko na ye na motema mobimba!

Matthieu 20:1-16
[1] —Pamba te Bokonzi ya likolo ekokani na nkolo ya elanga, oyo abimaki na tongo-tongo mpo na kokende koluka bato oyo bakosalana elanga na ye ya vino.[2] Ayokanaki na bango ete bakozwa deni moko mpo na mokolo moko, bongo atindaki bango na elanga na ye ya vino.[3] Abimaki lisusu na ngonga ya libwa ya tongo, amonaki bato mosusu oyo bazalaki basomele, batelemaki na zando, mpe bazalaki kosala eloko moko te.[4] Alobaki na bango: —Bino mpe bokende kosala na elanga na ngai ya vino, nakofuta bino lifuti oyo ekoka. Bango mpe bakendaki.[5] Abimaki lisusu na ngonga ya midi, mpe na ngonga ya misato ya pokwa; asalaki mpe kaka ndenge moko.[6] Abimaki lisusu na ngonga ya mitano ya pokwa, mpe amonaki lisusu bato batelemaki wana. Bongo atunaki bango: —Mpo na nini botelemi awa mokolo mobimba mpe bozali kosala eloko te?[7] Bazongisaki: —Mpo moto moko te azwi biso na mosala. Bongo alobaki na bango mpe: —Bino mpe, bokende kosala na elanga na ngai ya vino.[8] Tango pokwa ekomaki, nkolo ya elanga alobaki na kapita: —Benga basali mpe futa bango. Banda na bato oyo nazwaki na suka mpe sukisa na baoyo nazwaki liboso![9] Bato oyo babandaki mosala na ngonga ya mitano ya pokwa bayaki mpe bazwaki deni moko-moko na moto.[10] Tango bato oyo nkolo ya elanga azwaki liboso na mosala, bayaki, bakanisaki ete bakozwa mbongo mingi koleka. Kasi bango mpe bazwaki kakadeni moko moko na moto.[11] Tango bazwaki yango, basilikelaki kolo ya elanga;[12] mpe balobaki: —Bato oyo ozwaki sima mpe basali kaka ngonga moko, ofuti bango ndenge moko na biso; nzokande biso tosali mosala ya makasi mokolomobimba mpe na nse ya moi makasi.[13] Kasi nkolo ya elanga azongiselaki moko na bango: —Moninga na ngai, nasali yo mabe te. Toyokanaki te ete osala mpo na deni moko?[14] Kamata lifuti na yo mpe kende. Ngai moko moto nasepeli kopesa moto oyo abandaki sima lifuti moko lokola oyo napesi yo.[15] Boni, nazali na ndingisa te ya kosala ndenge ngai moko nalingi kosala na mbongo na ngai? To oyoki zuwa mpo nazali moto malamu?[16] Yango wana, bato ya suka bakokoma bato ya liboso, mpe bato ya liboso bakokoma bato ya suka!

Matthieu 21:28-32
[28] —Bokanisi nini? Moto moko azalaki na bana mibale ya mibali. Akendaki epai ya oyo ya liboso mpe alobaki na ye: “Mwana na ngai, kendekosala lelo na elanga ya vino”.[29] Azongisaki: “Nalingi te” Kasi sima, abongolaki makanisi mpe akendaki.[30] Bongo tata akendaki epai ya mwana mosusu mpe alobaki na ye kaka ndenge moko. Azongisaki: “Nakei, tata!” Kasi akendaki te.[31] Nani na kati na bango mibale asalaki likambo tata na ye alingaki? —Mwana ya liboso. Bongo Yesu alobaki na bango: —Nalobi na bino ya solo: bafutisi mpako na basi ya ndumba, bakokota na Bokonzi ya Nzambe liboso na bino.[32] Pamba te Jean ayaki epai na bino mpo na kolakisa bino nzelaya bosembo, kasi bondimelaki ye te. Nzokande bafutisi mpako na basi ya ndumba bandimelaki ye. Kasi bino, ata bomonaki bongo, bobongolakimitema te mpe bondimelaki ye te!

Matthieu 21:33-45
[33] —Boyoka lisapo mosusu. Moto moko azalaki na elanga: akonaki banzete ya vino, asalelaki yango lopango, mpe atimolaki libulu moko mpo na kokamola mbuma. Bongo atongaki ndako moko ya molayi mpo na mokengeli. Sima, apesaki elanga na maboko ya basali ya elanga mpo bafutelaka, mpe akendaki na mobembo.[34] Tango elaka ya kobuka mbuma ekomaki pene-pene, atindaki basali na ye epai ya bato oyo bazalaki kofutela elanga, mpo na kozwa ndambo na ye ya mbuma.[35] Bafuteli ya elanga bakangaki basali na ye; babetaki moko, babomaki mosusu, mpe babambaki oyo ya misato mabanga.[36] Atindaki lisusu basali mosusu mingi koleka baoyo ya liboso; kasi bafuteli ya elanga, basalaki bango kaka ndenge moko.[37] Bongo suka na yango, atindelaki bango mwana na ye, mpe alobaki: “Bakotosa mwana na ngai!”[38] Kasi tango bafuteli ya elanga bamonaki mwana, balobanaki: “Tala moto akokoma nkolo ya elanga. Boya, toboma ye mpe tozwa elanga na ye!”[39] Bakangaki ye, babendaki ye na libanda ya elanga ya vino, mpe babomaki ye.[40] Bongo, tango nkolo ya elanga ya vino akoya, akosala bafuteli wana nini?[41] Bazongiselaki ye: —Akoboma bato wana ya mabe na liwa moko ya nsomo penza; akopesa elanga ya vino epai ya bato mosusu, mpe bango bakobanda kopesaye ndambo na ye ya mbuma, na tango oyo babukaka![42] Sima Yesu alobaki na bango: —Botangi naino na Makomi te: Libanga oyo batongi na ndako babwakaki, ekomi libanga ya songe ya ndako; oyo ezali mosala ya Nkolo, mpe likambo ya kokamwa na miso na biso![43] Yango wana nalobi na bino: Bakolongola Bokonzi ya Nzambe na maboko na binompe bakopesa yango epai ya bato oyo bakobotela yango mbuma.[44] [ Kasi moto oyo akokweya likolo ya libanga yango, akokweya likolo ya libanga yango akobukana biteni-biteni; mpe moto oyo libanga yango ekokweyila ye, akonikama.][45] Sima ya koyoka masapo oyo, bakonzi ya banganga-Nzambe na bafarizeo bayebakiete Yesu azalaki koloba mpo na bango.

Matthieu 22:1-14
[1] Yesu alobaki na bango lisusu na masapo. Alobaki:[2] —Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo asalaki feti mpo na libala ya mwana na ye ya mobali.[3] Bongo atindaki basali na ye mpo babenga bato oyo babengamaki nafeti; kasi bato yango balingaki koya te.[4] Atindaki lisusu basali mosusu, mpe alobaki na bango: “Boloba na bato oyo babengamaki na feti ete nasiʼnabongisi biloko ya kolia. Nabomisi bangombe mpe banyama ya mafuta, mpe biloko nyonso esiʼebongisami malamu. Boya na feti ya libala.”[5] Kasi bato oyo babengamaki bamonaki makambo wana pamba, mpe moto na moto akendaki: moko na elanga na ye, mpe mosusu na mombongo na ye.[6] Bongo baoyo batikalaki, bakangaki basali na ye, baniokolaki bangompe babomaki bango.[7] Mokonzi ayokaki kanda mingi; atindaki basoda na ye mpo baboma babomi wana, mpe batumba vile na bango.[8] Bongo alobaki na basali na ye: “Biloko ya feti esiʼebongisami, kasi bato oyo babengamaki bakoki te mpo na kolia yango.[9] Bokende na bisika oyo babalabala ekutana, mpe bobenga bato nyonsooyo bokomona mpo baya na feti ya libala.”[10] Basali bakendaki na babalabala mpe basangisaki bato nyonso oyobamonaki: bato mabe mpe bato malamu, mpe ndako ya feti etondaki na bato.[11] Kasi tango mokonzi akotaki, mpo na kotala bato oyo babengamaki na feti, amonaki moto moko alataki te elamba ya feti ya libala.[12] Atunaki ye: “Moninga na ngai, ndenge nini okoti awa, mpe ozangi elamba ya feti?” Kasi moto yango azangaki maloba ya kozongisa.[13] Bongo mokonzi alobaki na basali na ye: “Bokanga ye makolo na maboko, mpe bobwaka ye libanda, na molili, epai ekozala kolela mpe koswa mino.”[14] Pamba te, babengami bazali mingi, kasi baponami bazali moke!

Matthieu 24:32-35
[32] Bolanda mateya ya nzete ya figi. Soki bitape na yango ekomi pete-pete, mpe makasa na yango ebandi kobima, wana boyebi ete tango ya mbula ekomi pene-pene.[33] Bino mpe ndenge moko, tango bokomona makambo wana nyonso, boyeba ete Mwana ya moto akomi pene-pene na porte.[34] Nalobi na bino ya solo: bato ya tango oyo, bakoleka te, liboso ete makambo wana esalama.[35] Likolo mpe nse ekolela, kasi maloba na ngai ekoleka te!

Matthieu 24:45-51
[45] Nani azali mosali ya sembo mpe ya mayele, oyo mokonzi na ye atie ye kapita ya basali mosusu mpo na kopesa bango bilei na tango oyo ekoki?[46] Esengo ekozala mingi na mosali wana, soki tango mokonzi akozonga, akuti ye azali kosala mosala ndenge basengaki ye.[47] Nalobi na bino ya solo, mokonzi akotia ye moyangeli ya bilokona ye nyonso.[48] Kasi soki azali mosali mabe; akomiloba: “Mokonzi na ngaiazali koya noki te”,[49] mpe soki abandi konyokola baninga na ye ya mosala, kolia mpe komela esika moko na bato oyo balangwaka masanga;[50] bongo mokonzi akozonga na mokolo oyo ye azali kozela te, mpe na ngonga ye ayebi te.[51] Akopesa ye etumbu, mpe akotia ye esika moko na bato ya kokosana; epai ekozala kolela mpe koswa mino.

Matthieu 25:1-13
[1] —Na mokolo wana, Bokonzi ya Likolo ekozala lokola bilenge basi zomi oyo bakamataki minda na bango mpo na kokende kokutana na mobali oyo akobala.[2] Na kati na bango, mitano bazalaki bazoba mpe mitano bazalaki mayele.[3] Baoyo ya zoba bakamataki minda na bango, kasi bamemaki mafuta te.[4] Kasi baoyo ya mayele bakamataki minda mpe mafuta mosusu na milangi.[5] Lokola mobali oyo azalaki kobala ayaki noki te, bango nyonso bayokaki pongi mpe balalaki.[6] Na midi ya butu, mongongo moko egangaki: “Mobali aye! Bokende kokutana na ye!”[7] Bongo, bilenge basi balamukaki mpe babandaki kobongisa mindana bango.[8] Bilenge basi oyo ya zoba balobaki na baoyo ya mayele: “Bopesa biso ndambo ya mafuta na bino, pamba te minda na biso elingikokufa!”[9] Kasi baoyo ya mayele bazongisaki: “Ekokoka te mpo na biso na bino. Bokende epai ya baoyo batekaka mafuta mpe bosomba oyo ya bino.”[10] Tango bakendaki kosomba mafuta, mobali ayaki. Bongo baoyo bamilengelaki, bakotaki na ye na esika ya feti ya libala, mpe bakangaki porte.[11] Na sima, baoyo mosusu mpe bayaki. Balobaki: “Nkolo, nkolo, fungolela biso!”[12] Kasi azongisaki: “Nalobi na bino ya solo, nayebi bino te.”[13] Yango wana bokengela, Pamba te boyebi mokolo te mpe ngonga te.

Matthieu 25:14-30
[14] —Ekozala lisusu lokola moto moko azalaki kokende mobembo. Abengaki basali na ye mpe apesaki bango biloko na ye.[15] Apesaki na moko batalenta mitano, na oyo mosusu batalentamibale, mpe na oyo mosusu talenta moko; moto na moto na ndenge oyo ekoki na makoki na ye. Bongo akendaki na mobembo.[16] Moto oyo azwaki batalenta mitano, akendaki noki kosala na yango mombongo, bongo azwaki benefisi ya batalenta mitano mosusu na likolo na yango.[17] Moto oyo azwaki batalenta mibale asalaki mpe ndenge moko. Mpeazwaki benefisi ya batalenta mibale mosusu.[18] Kasi moto oyo azwaki kaka talenta moko, atimolaki libulu na mabele, mpe abombaki mbongo ya mokonzi na ye.[19] Sima ya mikolo ebele, mokonzi ya basali wana azongaki, mpe atunaki bango bayebisa ye ndenge basalelaki mbongo na ye.[20] Moto oyo azwaki batalenta mitano amemaki batalenta mitano mosusu. Alobaki: “Mokonzi, opesaki ngai batalenta mitano; tala, nazwi benefisi ya batalenta mitano mosusu!”[21] Mokonzi na ye azongisaki: “Malamu, ozali mosali malamu mpe ya sembo; olakisi bosembo na biloko ya moke. Bongo nakopesa yo mokumba ya kotala biloko ebele. Yaka kosepela elongo na mokonzi na yo!”[22] Oyo azwaki batalenta mibale, ayaki mpe alobaki: “Mokonzi, opesaki ngai batalenta mibale; tala, nazwi benefisi ya batalenta mibale mosusu!”[23] Mokonzi azongisaki: “Malamu, mosali malamu mpe ya sembo; olakisi bosembo na biloko ya moke. Bongo nakopesa yo mokumba ya kotalabiloko ebele. Yaka kosepela elongo na mokonzi na yo!”[24] Bongo, oyo azwaki talenta moko ayaki mpe alobaki: “Mokonzi, nayebaki ete ozali moto ya motema makasi, mpo obukaka mbuma na elanga oyo olonaka te, mpe olongolaka epai yo obwakaka mbuma te.[25] Nabangaki mingi penza, yango wana nakendaki mpe nabombakibalenta na yo na nse ya mabele. Tala, kamata oyo ezali yo yo!”[26] Mokonzi na ye azongisaki: “Mosali mabe mpe ya goigoi! Oyebaki ete nabukaka mbuma na elangaoyo nalonaka te, mpe nalongolaka epai ngai nabwakaka mbuma te;[27] ebongaki malamu opesa mbongo na ngai epai ya babombi-mosolo, mpe tango nalingaki kozonga, nalingaki kozwa oyo ezali ya ngai, elongo na benefisi likolo.[28] Bobotola ye talenta wana mpe bopesa yango na moto oyo azali na batalenta zomi.”[29] Pamba te, moto oyo azali na biloko, bakopesa ye, mpe akotonda na yango; kasi moto oyo azali na eloko te, bakobotola ye ata oyo azali na yango.[30] Bongo bobwaka mosali oyo azangi tina na molili ya libanda; epai ekozala kolela mpe koswa mino.

Lingala Bible 2002
Copyright © 2002 by Biblica, Inc.®