A A A A A

Bad Character: [Hypocrite]


1 Jean 4:20
Soki moto alobi: “Nalingaka Nzambe”, mpe azali koyina ndeko na ye, azali moto ya lokuta. Pamba te moto oyo alingaka ndeko na ye teoyo ye amonaka, bongo ndenge nini akoki kolinga Nzambe oyo ye amonaka te?

1 Pierre 2:16
Bozala bato ya bonsomi, kasi bosalela bonsomi yango te lokola elamba mpo na kobomba mabe na bino; Kasi bozala bawumbu ya Nzambe.

Galatiefue 6:3
Soki moto akanisi ete azali moto monene, nzoka nde azali moto ya pamba, azali komikosa ye moko.

Luc 6:46
Mpo na nini bobengaka ngai “Nkolo! Nkolo!”, mpe bosalaka te makambo oyo nalobaka?

Luc 12:2
Pamba te eloko moko te oyo ezali ya kobombama mpe ekozanga komonana, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga koyebana.

Marc 7:6
Yesu azongiselaki bango: —Bino baiporite! Ezali asakolaki malamu mpo na bino; lokola ekomama: Bato oyo bakumisaka ngai na bambebo, kasi mitema na bango ezali mosika na ngai!

Matthieu 6:1
—Bokeba ete bosala bolamu te na miso ya bato, mpo ete bango bamona bino; soki te bokozanga lifuti oyo Tata na bino ya Likolo abomopanga bino.

Romefue 10:3
Lokola bayebaki te ndenge nini Nzambe akomisaka bato sembo mpe balukaki komikomisa sembo na ndenge na bango moko, batosaki te lolenge oyo Nzambe akomisaka bato sembo.

Tite 1:16
Balobaka ete bayebi Nzambe, kasi bawanganaka ye na nzela ya makambo oyo basalaka. Bazali bato mabe, bato bazangi botosi, mpe bazali na makoki te mpo na kosala ata likambo moko ya malamu.

Matthieu 23:27-28
[27] Mawa na bino balakisi ya Mibeko mpe bafarizeo! Bato ya kokosana! Pamba te, bozali lokola malita oyo bapakola kulele ya pembe, na libanda ezali komonana kitoko, kasi na kati etondi na mikuwa ya bato bakufa mpe na biloko ya kopola ya ndenge na ndenge.[28] Bino mpe ndenge moko, na libanda bozali komonana bato malamu, kasi na kati botondi na makambo ya lokuta mpe ya mabe!

Luc 20:46-47
[46] —Bokeba na balakisi ya Mibeko, bango balingaka kotambola na banzambala ya milayi, mpe bapesa bango bambote na bazando. Balingaka mpe kovanda na bisika ya lokumu na bandako ya mayangani, mpe na bisika ya kitoko na bafeti.[47] Babotolaka biloko ya basi oyo bakufela mibali, mpe mpo na kokosana, basalaka mabondeli ya milayi-milayi. Etumbu na bango ekozala makasi penza!

Jacques 1:22-23
[22] Bosalaka makambo oyo Liloba ya Nzambe ezali koloba, kasi boyokaka yango kaka Pamba te; soki te, bokomikosa bino moko.[23] Pamba te, soki moto azali koyoka Liloba mpe azali kosala te oyo yango ezali koloba, akokani na moto oyo atali elongi na ye na tala-tala,

Matthieu 6:16-18
[16] Tango bozali koboya kolia mpo na mabondeli, bokoma mawa-mawa tendenge bato ya lokuta basalaka. Pamba te, bakomisaka bilongi mawa-mawa mpo na kolakisa bato ete bazali koboya kolia. Nalobi na bino ya solo, basiʼbazwi lifuti na bango.[17] Kasi tango yo ozali koboya kolia mpo na mabondeli, sukola elongi na yo mpe pakola malasi na motu,[18] mpo moto ata moko te ayeba ete oboyi kolia mpo na mabondeli; longola kaka Tata na bino oyo avandaka na sekele. Bongo Tata na yo, oyoamonaka makambo oyo esalamaka na sekele, akopesa yo lifuti.

Matthieu 7:21-23
[21] —Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai: “Nkolo! Nkolo!”, nde bakokota na Bokonzi ya Likolo; kasi kaka oyo asalaka mokano ya Tata na ngai oyo azali na Likolo.[22] Na mokolo wana, bato mingi bakoloba na ngai: “Nkolo! Nkolo!”, tosakolaki makambo na kombo na yo te? Tobenganaki milimo mabe mpe tosalaki makambo mingi ya kokamwa na kombo na yo te?[23] Bongo ngai nakozongisela bango: “Bolongwa! Nayebi bino te! Bino bozalaki kosala mabe!”

Matthieu 15:7-9
[7] Bato ya kokosana! Ezayi asakolaki malamu mpo na bino:[8] Bato oyo bazali kokumisa ngai kaka na bibebo, kasi mitema na bango ezali mosika na ngai.[9] Bazali kosambela ngai kaka pamba, pamba te mateya na bango ezali kaka mibeko oyo esalami na bato.

Matthieu 6:1-4
[1] —Bokeba ete bosala bolamu te na miso ya bato, mpo ete bango bamona bino; soki te bokozanga lifuti oyo Tata na bino ya Likolo abomopanga bino.[2] Tango ozali kopesa likabo na mobola, kobeta kelelo te liboso na yo ndenge bato ya lokuta basalaka na bandako ya mayangani mpe na babala-bala, mpo ete bato bakumisa bango. Ya solo nalobi na bino; basiʼbazwi lifuti na bango.[3] Kasi tango yo ozali kopesa eloko na mobola, sala yango na ndenge ete loboko na yo ya mwasi eyeba te likambo loboko ya mobali ezali kosala;[4] mpo ete likabo na yo epesama na sekele; bongo Tata na yo oyo amonaka makambo oyo esalamaka na sekele akopesa yo lifuti.

2 Timothée 3:1-5
[1] Kasi yeba makambo oyo: mikolo ya suka ekozala mikolo ya pasi.[2] Pamba te, bato bakokoma moyimi, lokoso ya mbongo, lolendo, lofundu, bakotiola Nzambe, bakotosa baboti na bango te, bakoyeba kozongisa matondi te, bakotosa makambo ya Nzambe te,[3] bakotonda na nko, bakoyokela bato mawa te, bakokosela baninga makambo, bakokoka komibatela te, bakonyokola baninga, bakoboya makambo ya malamu;[4] bakoteka baninga, bakobanda kosilika noki, bakotonda na lofundu, bakolinga bisengo mingi koleka Nzambe.[5] Bakobanda komilakisa lokola bato oyo batosaka makambo ya Nzambe, kasibakowangana nguya na yango. Kima bato ya denge wana!

Romefue 2:1-5
[1] Yango wana, yo moto oyo osambisaka bato mosusu, ata soki ozali nani, yo mpe osalaka lokola bango. Pamba te, tango osambisaka bato mosusu, omisambisaka nde yo moko; mpo ete yo oyo osambisaka, osalaka mpe mabe.[2] Nzoka nde, toyebi malamu ete Nzambe asambisaka na bosolo bato oyo basalaka misala ya ndenge wana.[3] Boni, okanisi ete okokima kosambisama ya Nzambe, yo oyo osambisaka bato oyo basalaka mabe tango yo moko mpe ozali kosala mabe lokola bango?[4] To, ozali kotiola bolamu na Nzambe oyo eleka ndelo, motema monene na Ye mpe boboto na Ye? Oyebi te ete bolamu ya Nzambe ememaka yo na nzela ya kobongola motema?[5] Kasi ozali moto makasi mpe motema libanga. Ozali nde komibendela etumbu yo moko, mpo na mokolo ya kanda ya Nzambe, tango akomonisa bosembo ya kosambisa na ye.

Jacques 1:21-26
[21] Yango wana, bobwaka bosoto nyonso mpe misala nyonso ya mabe. Mpe bondima na komikitisa nyonso Liloba oyo balonaki na kati ya mitema na bino, oyo ekoki kobikisa bino.[22] Bosalaka makambo oyo Liloba ya Nzambe ezali koloba, kasi boyokaka yango kaka Pamba te; soki te, bokomikosa bino moko.[23] Pamba te, soki moto azali koyoka Liloba mpe azali kosala te oyo yango ezali koloba, akokani na moto oyo atali elongi na ye na tala-tala,[24] mpe nsima ya komitala, akeyi na ye; mpe kaka na tango wana abosani ndenge elongi na ye ezalaki.[25] Kasi moto oyo alandelaka malamu penza Mibeko ya kokoka, oyo epesaka bonsomi, oyo atosaka yango tango nyonso, mpe abosanaka te oyo ayokaki, kasi asalelaka yango, moto wana akozala na esengo na nyonso oyo akosala.[26] Soki moto akanisi ete azali moto oyo asambelaka, kasi ayebi kobatela lolemo na ye te, azali komikosa ye moko, mpe kosambela na ye ezali na tina te.

Luc 6:37-42
[37] Bosambisa te, mpe bakosambisa bino te. Bokatela bato etumbu te, mpe bakokatela bino etumbu te. Bolimbisa baninga na bino, mpe bakolimbisa bino.[38] Bopesa, mpe bakopesa bino: bakotia na basaki na bino biloko oyo ekoki penza, oyo bafini malamu, baningisi malamu, mpe oyo ebandi kosopana; pamba te bakozongisela bino, kaka ndenge bino mpe bopesaka baninga.[39] Yesu alobaki na bango lisusu lisapo oyo: —Boni, moto akufa miso akoki kotambolisa moto mosusu akufa miso? Bango mibale bakokweya na libulu te?[40] Mwana ya kelasi aleki molakisi na ye te, kasi moto nyonso oyo bateyi malamu penza, akokoma lokola molakisi na ye.[41] Mpo na nini ozali kotala mwa lititi moke oyo ezali na liso ya ndeko na yo, mpe ozali komona te nzete oyo ezali na liso na yo?[42] Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo: “Ndeko na ngai, tika nalongola mwa lititi oyo ezali na liso na yo”, na tango yo moko ozali komona te nzete oyo ezali na liso na yo. Moto ya kokosana! longola liboso nzete oyo ezali na liso na yo, bongo nde okomona polele mpo na kolongola mwa lititi oyo ezali na liso ya ndeko na yo.

Matthieu 7:1-6
[1] —Bosambisa te, mpo basambisa bino mpe te.[2] Pamba te, bakosambisa bino ndenge bino mpe bosambisaka baninga; mpe bakozongisela bino ndenge bino mpe bozongiselaka baninga.[3] Bongo mpo na nini ozali komona mwa lititi oyo ezali na liso ya ndeko na yo, kasi ozali komona te eteni ya nzete oyo ezali na liso na yo?[4] Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo: “nalongola mwa lititi oyo ezali na liso na yo”, nzokande, oyo ya yo moko ezali na eteni ya nzete?[5] Moto ya kokosana! Longola liboso mwa eteni ya nzete oyo ezali na liso na yo, bongo okomona malamu mpo na kolongola mwa lititi oyoezali na liso ya ndeko na yo.[6] —Bopesa te biloko ya bosantu na bambwa; mpe babwakela bangulu bapawuni na bino te; nakobanga ete eniata-niata yango mpe ezongela bino mpo na kopasola bino mike-mike.

1 Jean 2:1-6
[1] Bana na ngai, nakomeli bino makambo oyo mpo ete bosala masumu te. Kasi soki moto moko asali masumu, tozali na Molobeli moko epai ya Tata, ye nde: Yesu Kristo moto na sembo.[2] Ye amikabaki lokola mbeka mpo na masumu na biso, kaka oyo ya biso te, kasi mpe mpo na masumu ya mokili mobimba.[3] Tokoki kotia elikya ete toyebi Nzambe, soki tozali kotosa Mibeko na ye.[4] Moto oyo alobaki: “Nayebi Nzambe”, kasi asalaka te makambo oyo Nzambe atindaka, azali moto ya lokuta, mpe bosolo ezali kati na ye te.[5] Kasi soki moto azali kotosa Liloba na ye, wana bolingo ya Nzambe ezali penza ya kokoka kati na ye. Oyo ezali ndenge toyebaka ete tozali kati na ye.[6] Moto oyo alobaka ete azali kati na Nzambe, esengeli atambola ndenge Yesu atambolaki.

Luc 16:10-15
[10] Pamba te, moto oyo azali sembo na likambo moke, akozala mpe sembo na likambo ya monene; mpe moto oyo azali sembo te na likambo ya moke, akozala mpe sembo te na likambo monene.[11] Soki bozali sembo te mpo na kobatela bomengo ya mokili; bongo nani akopesa bino bomengo ya solo?[12] Mpe soki bozali sembo te na biloko ya moto mosusu, bongo nani akopesa bino biloko oyo ya bino moko?[13] —Mosali moko te akoki kosalela bakonzi mibale. Pamba te, to akoyina moko mpe akolinga mosusu; to mpe akotosa moko mpe akotiala oyo mosusu. Yango wana, bokoki te kosalela Nzambe mpe mbongo.[14] Bafarizeo mpe balingaki mbongo mingi penza, tango bayokaki makambo wana nyonso, basekaki ye.[15] Bongo Yesu alobaki na bango: —Bino bozali bato oyo bamikomisaka sembo bango moko liboso ya bato, kasi Nzambe ayebi mitema na bino. Pamba te eloko oyo ezali tina mingi kati na bato, Nzambe ayinaka yango.

Jacques 2:14-26
[14] Bandeko na ngai, litomba ezali wapi soki moto alobi azali na Kondima mpe azali kolakisa yango na misala te? Kondima ya ndenge wana ekoki kobikisa ye?[15] Ndakisa: ndeko moko ya mobali to ya mwasi azangi bilamba ya kolata, to biloko ya kolia ya mokolo na mokolo;[16] soki moto moko na kati na bino alobi na bango: “Bokende na kimia, boyotela moto mpe bolia malamu”, kasi asali eloko moko te mpo na oyo bazali na yango posa mpo na nzoto na bango; bongo yango ezali na litomba nini?[17] Ndenge moko mpe mpo na kondima, soki ezangi misala, ezali ya kokufa.[18] Kasi moto akoki koloba: —Ozali na kondima, ngai nazali na misala.—Malamu! Lakisa ngai kondima na yo oyo ezangi misala, mpe ngai nakolakisa yo kondima na ngai na nzela ya misala oyo nasalaka.[19] Ondimaka ete Nzambe azali moko. Ezali malamu! Ata milimo mabe mpe bandimaka ete Nzambe azali moko, mpe balengaka.[20] Yo zoba oyo, olingi nalakisa yo ete kondima oyo ezangi misala, ezali Pamba?[21] Boni, Nzambe akamataki nkoko na biso Abraham moto sembo te na nzela ya misala, tango akabaki mwana na ye Izaki likolo ya mesa ya makabo?[22] Omoni, kondima na ye mpe misala na ye ezalaki kosala nzela moko. Mpe kondima na ye ekomaki ya kokoka na nzela ya misala na ye.[23] Bongo Makomi ekomaki ya solo, oyo ezali koloba: Abraham andimelaki Nzambe, mpe mpo na kondima na ye, Nzambe akamataki ye moto na sembo; mpe babengaki ye moninga ya Nzambe.[24] Bomoni sikʼoyo ete, moto akomaka sembo liboso ya Nzambe na Nzela ya misala, kasi na nzela ya kondima kaka te.[25] Boni, ndenge moko mpe mpo na Rahabi mwasi ya ndumba, akomaki sembote na miso ya Nzambe na nzela ya misala, tango ayambaki bantoma mpe abimisaki bango na nzela mosusu?[26] Pamba te, ndenge nzoto oyo ezangi molimo ezali ya kokufa, ndenge moko mpe kondima oyo ezangi misala, ezali ya kokufa.

Lingala Bible 2002
Copyright © 2002 by Biblica, Inc.®