A A A A A

Additional: [Evil]


1 Corinthefue 13:6
Bolingo esepelaka te na makambo ya bosembo te, kasi esepelaka na bosolo.

1 Jean 5:19
Toyebi ete tozali bana ya Nzambe, mpe mokili mobimba ezali na nse ya bokonzi ya molimo mabe.

1 Pierre 3:9
Bozongisa mabe na mabe te, to kofinga na kofinga, nzokande bopambolaka, Pamba te Nzambe abenga bino mpo na yango, mpo ete bozwa lipamboli.

1 Thessaloniquefue 5:22
Boboya lolenge nyonso ya mabe.

2 Timothée 2:22
Kima baposa ya mabe ya bolenge. Mpe luka na posa monene, bosembo, kondima, bolingo mpe kimia, elongo na baoyo babengaka Nkolo na motema ya peto.

Jean 3:20
Pamba te, moto oyo asalaka mabe ayinaka moi mpe apusanaka pene-pene ya moi te, abangaka soki te misala na ye ekomonana polele.

Romefue 6:12
Yango wana, botika te ete masumu ezala na bokonzi likolo ya banzoto na bino oyo esila kokufa mpo ete botosa lisusu baposa mabe na yango.

Romefue 12:21
Kotika te ete mabe elonga na yo, kasi luka kolonga mabe na nzela ya kosala malamu.

Marc 7:21-22
[21] Pamba te, wuta na kati, na motema ya moto nde ebimaka: makanisi ya mabe, ekobo, kindumba,[22] koboma, koyiba, lokoso ya mbongo, makambo ya mabe, makambo ya lokuta, pite, kofinga, lofundu, bozoba.

Matthieu 12:34-35
[34] Bino mabota ya banioka! Ndenge nini bino bato ya mabe bokoki kolobamakambo ya malamu? Pamba te, makambo oyo moto alobaka ewutaka na oyoetondi na kati ya motema na ye.[35] Moto malamu alobaka makambo ya malamu oyo ezali na ebombeloya malamu, oyo ezali kati na ye. Moto mabe mpe alobaka makambo ya mabeoyo ezali na ebombelo ya mabe, oyo ezali kati na ye.

Jacques 1:13-14
[13] Moto moko te, tango azali kokutana na komekama, aloba: “Nzambemoto azali komeka ngai.” Pamba te, mabe ekoki komeka Nzambe te, mpe Nzambe amekaka moto moko te.[14] Kasi moto nyonso amekamaka, tango baposa na ye ya mabe ebendi ye mpe ekangi ye.

Jacques 3:6-8
[6] Lolemo mpe ezali moto, ezali mpe mokili ya makambo ya mabe kati na biteni ya nzoto na biso. Yango nde ebebisaka nzoto mobimba, mpe ezikisaka bomoi na biso mobimba sima ya kopelisama na moto na yango ewutaka na lifelo.[7] Moto akoki kolakisa banyama ya lolenge nyonso, bandeke, banyama oyo etambolaka na libumu, banyama ya mayi, mpo etosa ye, mpe asiʼalakisa yango.[8] Kasi mpo na lolemo, moto moko te akoki kolakisa yango mpo etosa ye. Yango ezali eloko moko ya mabe, elembaka te, mpe etonda na pwazo.

Romefue 2:29-32
[29] Kasi eloko ekomisaka moto moyuda ezali makambo ya kati, mpe kokatisama nzoto ya solo ezali oyo Molimo azali kosala na motema, kasi ezali te ya mokanda ya mobeko. Moyuda ya ndenge oyo azwaka lokumu na ye na bato te, kasi na Nzambe.[30] Boye, kozala Moyuda ezali na litomba nini? To mpe, kokatisama nzoto ya mibali ezali na tina nini?[31] Solo, ezali penza na litomba monene na makambo nyonso. Pamba te, Maloba ya Nzambe epesamaki liboso epai na bango.[32] Soki Bayuda misusu bazangi boyengebene na miso ya Nzambe, boni, Kozanga boyengebene na bango ekobongola solo boyengebene ya Nzambe?

Romefue 2:8-12
[8] Kasi kanda mpe somo mpo na bato oyo batelemelaka Ye, baboyaka bosolo mpe balandaka nzela ya mabe.[9] Solo, minyoko mpe mitungisi ezali kozela moto nyonso oyo asalaka mabe: liboso Bayuda, mpe na sima, bato ya bikolo ya bapaya;[10] kasi nkembo, lokumu mpe kimia ezali kozela moto nyonso oyo asalaka malamu: liboso Bayuda, mpe na sima, bato ya bikolo ya bapaya.[11] Pamba te, Nzambe atalaka bilongi ya bato te.[12] Bato nyonso oyo basalaki masumu na kozanga koyeba Mobeko ya Moyize, bakokufa, kasi bakosambisama kolanda Mobeko te. Nzoka nde, baoyo basalaki masumu na koyeba Mobeko yango, bakosambisama kolanda Mobeko.

ÉphÈsefue 6:12-16
[12] Pamba te etumba na biso ezali na makila mpe na mosuni te, kasi na milimo oyo ezali na bokonzi, milimo ya lokumu, banguya ya mokili oyo ya molili, mpe na milimo ya mabe oyo ezali na mokili ya milimo.[13] Yango wana, bokamata bibundeli nyonso ya Nzambe, mpo ete bokoka kotelema na mokolo mabe, mpe sima ya kobunda kino na suka, botelema kaka ngwi.[14] Yango wana botelema ngwi: bolata solo lokola mokaba na loketo, bolata bosembo lokola eloko ya libende oyo ebatelaka ntolo,[15] bolata molende ya kopanza Sango Malamu ya kimia lokola sapato na makolo na bino.[16] Likolo na nyonso, bolata kondima lokola eloko ya libende oyo ekosunga bino mpo na koboma makonga nyonso oyo epelaka moto, oyo moto mabe abwakaka.

Romefue 7:19-25
[19] Pamba te, malamu oyo nalingaka kosala, nasalaka yango te, kasi mabe oyo nayinaka, yango nde nasalaka.[20] Bongo, soki nasali makambo oyo nalingaka kosala te, ezali ngai te moto nasalaka yango, kasi lisumu oyo ezali kati na ngai.[21] Soki nalingi kosala malamu, nakutanaka na mobeko oyo: nasalaka kaka mabe.[22] Na motema na ngai, nasepelaka na Mobeko ya Nzambe.[23] Kasi nakutanaka na mobeko mosusu kati na biteni ya nzoto na ngai, oyo ebundisaka mobeko ya makanisi ya motema na ngai. Boye, ekomisaka ngai mowumbu ya mobeko ya lisumu oyo ezali kati na biteni ya nzoto na ngai.[24] Ah ngai moto na mawa! Nani akokangola ngai na nzoto oyo ya kufa?[25] Matondo na Nzambe: ezali na nzela na Yesu Klisto, Nkolo na biso. Na mokuse, nakoki koloba ete ngai moko na motema na ngai, nasalelaka Mobeko ya Nzambe, kasi na nzoto, nazali mowombu ya mobeko ya masumu.

Matthieu 13:36-43
[36] Bongo atikaki ebele ya bato mpe akotaki na ndako. Bayekoli na ye bayaki epai na ye mpe balobaki: —Limbolela biso lisapo ya matiti ya mabe kati na elanga.[37] Yesu azongisaki: —Moto oyo alonaki mbuma ya malamu, ezali Mwana ya moto.[38] Elanga ezali mokili; mbuma ya malamu ezali bana ya Bokonzi. Matiti ya mabe ezali nde bato ya satana.[39] Monguna oyo alonaki matiti ya mabe, ezali Zabolo; tango ya kobuka mbuma ezali suka ya mokili. Bongo bato oyo balongolaka mbuma, ezali baanzelu.[40] Ndenge moko lokola bapikolaka matiti ya mabe mpe batumbaka yango na moto, ekozala mpe bongo na suka ya mokili.[41] Mwana ya Moto akotinda baanzelu na ye, mpe bango bakolongola na Bokonzi na ye makambo nyonso oyo ekweyisaka na masumu elongo na bato oyo basalaka mabe.[42] Bakobwaka bango na fulu ya moto; epai ekozala kolela mpe koswa mino.[43] Bongo bato na sembo bakongenga lokola moi na kati ya Bokonzi ya Tata na bango. Oyo azali na matoyi mpo na koyoka, ayoka!

1 Timothée 6:2-10
[2] Baoyo bakonzi na bango bazali bandimi, batiola bango te mpo bazali bandeko na bango. Nzokande, basalela bango na malamu penza, pamba te baoyo bazali kozua litomba na mosala na bango bazali bandimi mpe bandeko na bango ya bolingo. Tala, makambo oyo, osengeli koteya mpe kotinda bango.[3] Soki moto ateyi mateya mosusu, mpe alandi te maloba ya solo oyo Nkolo na biso Yesu Kristo, mpe mateya oyo ezali koloba mpo na botosi ya makambo ya Nzambe,[4] azali moto oyo atonda na lofundu, ayebi eloko moko te, azali na maladi ya kotuna-tuna mituna mpe ya kotiaka tembe mpo na maloba; yango ebotaka zuwa, koswana, maloba ya kofinga, kokanisela baningamakambo ya mabe,[5] mpe kotiana tembe ya pamba-pamba ya bato oyo babeba kati na makanisi na bango mpe bazangi makambo ya solo, baoyo bakanisaka etekotosa makambo ya Nzambe ezali nzela oyo epesaka litomba ya mosolo.[6] Nzokande, kotosa makambo ya Nzambe mpe kosepela na biloko oyoozali na yango, ezali penza litomba monene.[7] Pamba te, toyaki na eloko moko te na mokili, mpe tokoka komema ata eloko moko te.[8] Kasi soki tozali na biloko ya kolia mpe na elamba ya kolata, tokosepelampo na yango.[9] Nzokande bato oyo balingaka kokoma bato ya bomengobakweyaka kati na komekama, kati na motambo, mpe kati na baposa mingi ya bozoba mpe oyo ememaka pasi, oyo edindisaka bato kati na kufa mpe mabe.[10] Pamba te, “bolingo ya mbongo, yango nde ezali ebandeli ya mabenyonso.” Bato mosusu bawelelaki kozala na mbongo, babungisa kondimana bango mpe bamiyokisa bango moko bapasi mingi.

Lingala Bible 2002
Copyright © 2002 by Biblica, Inc.®