Matthieu 5:4 |
Esengo na baoyo bazali kolela, pamba te bakobondisa bango! |
|
Romefue 8:28 |
Toyebi lisusu malamu ete, makambo nyonso esalamaka mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Nzambe, baoyo abenga kolanda mokano na Ye. |
|
Philippesfue 4:6-7 |
[6] Bomitungisa na eloko ata moko te, kasi na makambo nyonso, bolakisa baposa na bino epai ya Nzambe, na nzela ya mabondeli, bisengeli, elongo na matondi.[7] Bongo kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli nyonso, ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino kati na Kristo Yesu. |
|
2 Corinthefue 1:3-5 |
[3] Lokumu epai na Nzambe, Tata na Nkolo na biso Yesu Klisto, Tata oyo ayokelaka bato mawa mpe Nzambe oyo abondisaka bato na makambo nyonso.[4] Abondisaka biso na bapasi nyonso mpo ete biso mpe tokoka kobondisa baoyo bazali kati na bapasi, na nzela ya kobondisama oyo biso mpe tozwaki epai na Ye.[5] Ndenge tozali komona pasi mingi kati na Klisto, ndenge wana mpe kobondisama na biso ezali mingi na nzela ya Klisto. |
|
Lingala Bible 2002 |
Copyright © 2002 by Biblica, Inc.® |